Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 8:12 - Mokanda na Bomoi

12 Nakomelaki bango makambo ebele ya Mobeko na Ngai, kasi bamonaki yango lokola eloko moko ya mopaya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 8:12
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi batosaki Yo te mpe batombokelaki Yo, bapesaki Mibeko na Yo mokongo, babomaki basakoli na Yo, oyo bazalaki koteya bango ete bazonga epai na Yo, mpe batiolaki Yo makasi na maloba na bango.


Fungola miso na ngai mpo ete namona kitoko ya mibeko na Yo.


Nzokande oyinaka malako na ngai mpe oyokaka te maloba na ngai ?


Boni, lobi eleki, nakomelaki yo te batoli koleka tuku misato, batoli ya bwanya mpe ya boyebi,


Bato oyo bazali libota ya batomboki, bazali bana ya lokuta, bana oyo balingaka te koyoka mateya ya Yawe ;


Napesaki bango bikateli na Ngai mpe nalakisaki bango mibeko na Ngai mpo ete moto oyo akotosa yango abika na nzela na yango.


Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.


Boye, kozala Moyuda ezali na litomba nini ? Kokatama ngenga ezali na tina nini ?


Boye, Mobeko ezali bule, mpe mitindo ezali bule, sembo mpe malamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ