Yango wana, nakobwaka bino libanda ya mokili oyo mpe nakomema bino na mokili oyo, ezala bino to batata na bino, botikala koyeba te ; mpe kuna, bokosalela banzambe ya bapaya, butu mpe moyi ; pamba te nakoyokela bino mawa te. ›
« Masumu ya Yuda ezali lokola makomi oyo bakoma na ekomeli ya ebende oyo ezali na songe ya diama ; bakoma yango na bitando ya mitema na bango mpe na maseke ya bitumbelo na bango.
Misala na bango ezali kopekisa bango kozonga epai ya Nzambe na bango, mpo ete molimo ya kindumba evandi kati na mitema na bango, bazali koyeba Yawe te.
Kuna, bokogumbamela banzambe oyo esalemi na maboko ya bato, banzambe ya banzete to ya mabanga, oyo ekoki komona te, koyoka te, kolia te mpe koyoka solo te.