Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 8:1 - Mokanda na Bomoi

1 Tia kelelo na monoko na yo ! Lokola mpongo, pasi ekokitela Ndako ya Yawe, mpo ete babebisi boyokani na Ngai mpe batombokeli Mobeko na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 8:1
34 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi azongisaki : — Bokanisi ete nkolo na ngai atindi ngai koloba maloba oyo kaka epai na mokonzi na bino mpe epai na bino ? Te ! Maloba yango ezali mpe mpo na bato oyo batelemi na likolo ya mir, oyo bakolia nyei na bango mpe komela masuba na bango elongo na bino ?


Bino nyonso, bavandi ya mokili, bino oyo botondisi mabele, tango bakotombola bendele na likolo ya bangomba, bokomona ; tango bakobeta kelelo, bokoyoka !


Bato ya mokili bakomisi yango mbindo, bazali kotosa mibeko te ; banyati-nyati bikateli mpe babuki boyokani ya seko.


« Ganga na mongongo makasi, kotika te ! Matisa mongongo na yo lokola kelelo, yebisa bato na Ngai botomboki na bango, mpe lakisa libota ya Jakobi masumu na ye.


ekozala ndenge moko te na boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango tango nasimbaki bango na loboko mpo na kobimisa bango na Ejipito ; pamba te bakataki boyokani na Ngai wana, atako nazalaki Mobali ya libala mpo na bango, » elobi Yawe.


nakokaba bato oyo babebisaki boyokani na Ngai mpe bakokisaki te malako ya boyokani oyo basalaki liboso na Ngai, na nzela ya kokata na biteni mibale mwana ngombe ya mobali mpe ya kotambola na kati-kati ya biteni yango.


Tala ! Monguna azali koya na elulu lokola mapata, bashar na ye ezali konguluma lokola mopepe ya makasi ; mpunda na ye kutu eleki mpongo na mbangu. Mawa na biso ! Tokufi na biso !


Bopanza sango na mokili ya Yuda, botatola na Yelusalemi mpe boloba : ‹ Bobeta kelelo na mokili ! › Boganga makasi mpe bobelela : ‹ Bosangana, bino nyonso ! Tokima na bingumba batonga makasi ! ›


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tala ndenge nini mpongo ezali kokita na elulu mpe etandi mapapu na yango likolo ya Moabi.


Tala, mpongo moko ekopumbwa mpe ekokita na elulu, etanda mapapu na yango likolo ya Botsira ! Na mokolo wana, mitema ya basoda ya Edomi ekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota. › »


« Botelemisa bendele kati na mokili ! Bobeta kelelo kati na bikolo ! Bobongisa bikolo mpo na kobundisa Babiloni, bobenga bakonzi ya basoda ya mikili ya Ararati, ya Mini mpe ya Ashikenazi mpo ete babundisa yango. Bopona mokonzi moko ya basoda mpo ete atambolisa bitumba, botinda bampunda lokola liboke ya mabanki.


« Bino bato ya Benjame, bokima mpo na lobiko na bino ! Bobima na Yelusalemi ! Bobeta kelelo na Tekoa ! Botombola bendele kati na Beti-Akeremi ! Pamba te pasi mpe kobebisama ya somo ekobimela na nor.


Yango wana, sakola makambo ya mabe na tina na bango ; sakola, mwana na moto ! »


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosalela yo kolanda misala na yo, pamba te otiolaki ndayi na Ngai na nzela ya kobuka boyokani na Ngai elongo na yo.


Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mpongo moko ya monene oyo ezalaki na mapapu milayi soki efungwami, na basala ebele ya balangi ya ndenge na ndenge, ekendeki kotelema na Libani. Tango etutaki songe ya nzete moko ya sedele,


Ata soki babeti kelelo to bamibongisi ndenge nini, moto moko te akokende na bitumba ; pamba te kanda na Ngai ezali likolo ya bato nyonso.


Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.


Bobeta kelelo, na Gibea, mpe liseke, kuna na Rama ! Bobeta lolaka ya bitumba na Beti-Aveni ! Oh Benjame, keba !


Ndenge kaka Adamu asalaki, bango mpe babukaki boyokani na Ngai ; kuna, bazalaki sembo te liboso na Ngai.


Nayinaki bango mpo na mabe na bango nyonso oyo basalaki na Giligali ; Nakobengana bango na Ndako na Ngai mpo na misala na bango ya mabe. Nakolinga bango lisusu te, pamba te bakonzi na bango nyonso bazali batomboki.


Bobeta kelelo na Siona ! Bobelela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule ! Tika ete bavandi nyonso ya mokili balenga, pamba te mokolo ya Yawe ezali koya ; solo, ekomi penza pene.


Bobeta kelelo na Siona ! Bopanza sango ya mokolo ya bule ya kokila bilei mpe bobengisa mayangani ya bule.


Boni, kelelo ya bitumba ekoki solo kobeta kati na engumba, bongo bato bazanga kobanga ? Pasi ekoki solo koya na engumba soki Yawe atindi yango te ?


Na mokolo wana, banzembo ya esengo kati na bandako ekobongwana bileli, elobi Nkolo Yawe. Bakobwaka bibembe ebele bipai na bipai mpe bakosalela bango matanga te.


Namonaki Yawe atelemi pene ya etumbelo, mpe alobaki : « Buka makonzi ya Tempelo mpo ete ndako mobimba eningana mpe ekweyela bato nyonso na mito. Bato oyo bakotikala, nakoboma bango na mopanga. Moko te akokima, moko te akobika.


Bampunda na bango ekimaka mbangu koleka ata nkoyi, ezalaka na kanda makasi koleka ata mbwa ya zamba oyo ebimaka na pokwa mpo na koluka nyama ya kolia. Basoda na bango oyo batambolaka likolo ya bampunda batambolaka mbangu makasi mpe bawutaka mosika penza, bapumbwaka lokola mpongo soki ezali kokita na elulu mpo na kokanga nyama ya kolia.


mokolo ya kobeta bakelelo mpe ya makelele ya bitumba mpo na kobundisa bingumba batonga makasi mpe bandako milayi oyo batonga makasi.


Mokili ya Libani, fungola bikuke na yo mpo ete moto ezikisa banzete na yo ya sedele !


Yawe akomimonisa epai na bango, mpe tolotolo na Ye ekobima lokola mokalikali. Nkolo Yawe akobeta kelelo mpe akotambola kati na mopepe makasi.


Esika nyonso ebembe ezali kopola, bandeke oyo eliaka bibembe esanganaka wana.


na mbalakata, noki penza, tango kelelo ya suka ekobeta. Pamba te kelelo ekobeta, bakufi bakosekwa na nzoto oyo epolaka te ; bongo biso, tokobongolama.


Yawe akotindela bino na mosika, wuta na suka ya mokili, ekolo moko oyo ezali lokola mpongo oyo ezali kopumbwa, ekolo oyo bokososola monoko na yango te ; ekobundisa bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ