Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 7:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bango nyonso bapelaka lokola moto ya fulu, batumbaka bakambi na bango ; mpe bakonzi na bango nyonso bakweyaka, moko te kati na bango abelelaka Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 7:7
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Baesha abomaki Nababi tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu misato na bokonzi, mpe akitanaki na Nadabi na bokonzi.


Tango Zimiri amonaki ete mampinga ya Isalaele esili kobotola engumba, akotaki na ndako ya bokonzi, amitumbaki na ndako mpe akufaki na moto.


Kasi bato oyo bazalaki kolanda Omiri bamonanaki makasi koleka bato oyo bazalaki kolanda Tibini, mwana mobali ya Ginati. Boye, Tibini akufaki mpe Omiri akitanaki na ye na bokonzi.


Jewu apesaki mitindo : — Bokanga bango ya bomoi. Boye bakangaki bango ya bomoi mpe bakataki bango bakingo, pene ya libulu ya Beti-Ekedi. Bazalaki mibali tuku minei na mibale, mpe Jewu atikaki moto moko te na bomoi.


Tango mokanda ekomaki, bato wana bazwaki bana mibali ya mokonzi, babomaki bango nyonso tuku sambo, batiaki mito na bango na bitunga mpe batindaki yango epai ya Jewu, na Jizireyeli.


Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, asalelaki Zakari likita, abundisaki ye liboso ya bato, abomaki ye mpe akitanaki na ye na bokonzi.


Bongo Menayeme, mwana mobali ya Gadi, alongwaki na Tiritsa mpe akendeki na Samari. Abundisaki Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, na Samari ; abomaki ye mpe akitanaki na ye na bokonzi.


Moko kati na bakonzi na ye ya basoda, Peka, mwana mobali ya Remalia, asalelaki ye likita. Na lisungi ya bato tuku mitano ya Galadi, Peka abomaki Pekakia kati na ndako ya mokonzi, na Samari, na lisungi ya Arigobi mpe Arie. Boye Peka abomaki Pekakia mpe akitanaki na ye na bokonzi.


Bongo Oze, mwana mobali ya Ela, asalaki likita mpo na kotelemela Peka, mwana mobali ya Remalia. Abundisaki ye mpe abomaki ye, bongo akitanaki na ye na bokonzi tango Yotami, mwana mobali ya Oziasi, akokisaki mibu tuku mibale na bokonzi.


Boye Jewu abendaki tolotolo mpe abetaki Yorami na kati-kati ya mapeka. Tolotolo etobolaki motema na ye, mpe akweyaki wuta na shar na ye.


Jewu apesaki bango mitindo : — Bobwaka ye na se. Bongo babwakaki Jezabeli na se ; mpe makila na ye epanzanaki na mir mpe na bampunda tango ezalaki konyata ye.


Bato oyo bayebi Nzambe te mpe mitema na bango etondisami na kanda, babelelaka Nzambe te tango akangaka bango minyololo.


Boni, bato wana nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ? Bato baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa, babelelaka Yawe te !


Kasi obelelaki Ngai te, oh Jakobi, pamba te olembaki Ngai, oh Isalaele.


Osungaka bato oyo bazalaka na esengo ya kosala makambo ya sembo, ba-oyo babosanaka nzela na Yo te. Kasi osilikaki tango biso tosalaki masumu ; bongo ndenge nini tokoki solo kobika ?


Moko te azali kobelela Kombo na Yo to kolamusa makanisi mpo na kokangama na Yo, pamba te obombeli biso elongi na Yo mpe obebisi biso likolo ya masumu na biso.


Nzokande oh Yawe, ozalaka Tata na biso ; biso tozali lokola mabele oyo basalelaka bikeko, bongo Yo, ozali lokola mosali mbeki ; biso nyonso tozali mosala ya maboko na Yo.


Yango wana, kaka na mokolo moko, Yawe akokata, kati na Isalaele, moto mpe mokila, lindalala mpe nzete oyo ebotaka na mayi.


Nalukaki ata moto moko kati na bango, oyo akokaki kotonga mir mpe kotelema liboso na Ngai, na lidusu ya mir mpo na bolamu ya mokili mpo ete nakoka kobebisa yango te, kasi namonaki ata moto moko te.


Kolanda ndenge kaka ekomama kati na Mobeko ya Moyize, pasi yango nyonso ekomeli biso ; mpe tobondelaki te Yawe, Nzambe na biso ; totikaki te kosala masumu mpe tomipesaki te mpo na kososola bosolo na Yo.


Wapi mokonzi na yo mpo ete abikisa yo ? Wapi bakambi na yo kati na bingumba na bino nyonso oyo, na tina na bango, bozalaki koloba : ‹ Bopesa biso mokonzi mpe moyangeli ? ›


Nakozonga epai na Ngai kino tango bakososola mabe na bango mpe bakoluka elongi na Ngai ; kati na pasi, bakoluka Ngai makasi.


Lolendo ya Isalaele ezali kofunda ye, kasi azali komona nyonso wana pamba : azongeli te Yawe, Nzambe na ye ; mpe atako bongo, azali kaka koluka Ye te !


Babelelaka Ngai te wuta na mozindo ya mitema na bango, kasi balelaka na bambeto na bango. Tango bamikataka banzoloko mpo na kozwa ble mpe vino ya sika, bakomaka nde mosika na Ngai.


Batunaki Ngai te tango batiaki bakonzi mpe baponaki bakambi. Bamisalelaki banzambe ya bikeko na palata mpe na wolo na bango mpo na libebi na bango moko.


Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe, oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango ! Bakokisaka yango na tongo, pamba te bazali na makoki ya kosala yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ