Oze 7:16 - Mokanda na Bomoi16 Bazongelaka te Ye-Oyo-Aleki-Likolo, bazali lokola tolotolo ebeba ; bakambi na bango bakokufa na mopanga likolo ya maloba na bango ezanga limemia. Mpo na yango, bakosambwa kati na Ejipito. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! »
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ndenge kanda mpe kotomboka na Ngai epelelaki bavandi ya Yelusalemi, ndenge wana mpe nakopelisela bino kanda na Ngai tango bokokende na Ejipito. Bokokoma ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe ya kotiola ; mpe bokotikala komona lisusu esika oyo te. ›