Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 7:15 - Mokanda na Bomoi

15 Ezali Ngai nde nateyaki mpe nakomisaki bango makasi, kasi bango bazalaka kaka na mabongisi ya kosala Ngai mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 7:15
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Yawe asalelaki bango ngolu, ayokelaki bango mawa, mpe azongelaki bango, mpo na boyokani na Ye elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi. Na tango wana, Yawe alingaki koboma bango te mpe aboyaki kobengana bango mosika ya miso na Ye.


Yawe apesaki mokangoli mpo na bato ya Isalaele, mpe balongwaki na se ya nguya ya bato ya Siri. Boye bato ya Isalaele bavandaki na bandako na bango ndenge ezalaki liboso.


Esengo na moto oyo Nzambe apameli ! Kotiolaka te pamela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya misala mabe ! Kokutanisa ngai te na bato na kanza.


Mpo na nini bikolo ezali kosala makelele mpe bato bazali kosala makita ya pamba ?


Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.


Yawe, esengo na moto oyo ozali kozongisa na nzela, moto oyo ozali kolakisa mibeko na Yo


Mwana na ngai, yamba toli ya Yawe, koboya te pamela na Ye ;


Motema eleki biloko nyonso na lokuta mpe ekoki kobika te ; nani akoki koyeba yango ?


Isalaele, obebisami ; pamba te Ngai kaka nde Mosungi na yo !


Likita ya ndenge nini bakoki kosalela Yawe ? Azali Ye oyo asilisaka makambo nyonso ; pasi ekoya lisusu te.


Yo nde olobaki na nzela ya Molimo Mosantu, na monoko ya koko na biso, Davidi, mosali na yo : « Mpo na nini bikolo ezali kosala makelele, mpe bato bazali kosala makita ya pamba ?


Pamba te, atako bayebaki Nzambe, kasi bapesaki Ye te lokumu oyo ekoki na Nzambe mpe bapesaki Ye matondi te, kasi makanisi na bango ekomaki ya bozoba, mpe mitema na bango, oyo ezangaki mayele, etondaki na molili.


tokweyisaka makanisi ya lokuta mpe nguya nyonso oyo etelemelaka boyebi ya Nzambe ; tolongaka makanisi nyonso ya bomoto mpe tosalaka ete yango etosa Klisto.


Mpe bobosani maloba nyonso ya malendisi oyo ayebisaki bino ndenge tata ayebisaka bana : « Mwana na Ngai, kozwa na pamba te etumbu ya Nkolo, mpe kobungisa mpiko na yo te soki apameli yo.


Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ