12 Tango akendaka, nabwakelaka ye monyama mpe nakangaka ye ndenge bakangaka ndeke na likolo. Nakopesa ye etumbu oyo ekoki kolanda ndenge nakebisaki ye na tina na yango kati na lisanga.
Moto moko te ayebi tango nini ngonga na ye ekokoka : ndenge mbisi ekangamaka na monyama to ndenge banyama ekangamaka na motambo, ndenge wana mpe bato bakangamaka na mitambo ya pasi oyo ekweyelaka bango na mbalakata.
Solo, nakotinda balobi mbisi ebele, » elobi Yawe, « mpe bakoboma mbisi ebele ; bato ya bokila ebele mpe bakoboma banyama ebele na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse kino kati na madusu ya mabanga.
Nakotiela ye motambo na Ngai, mpe akokangama penza na motambo yango ; nakomema ye na Babiloni, mokili ya bato ya Chalide ; kasi akomona yango te mpe akokufela kuna.
Nakotiela ye motambo na Ngai, mpe akokangama na motambo na Ngai ; nakomema ye na Babiloni mpe nakosambisa ye kuna, pamba te atambolaki na boyengebene te liboso na Ngai.