Bongo Puli, mokonzi ya Asiri, akotaki na makasi kati na mboka, mpe Menayeme apesaki ye bakilo ya palata, nkoto tuku misato na minei mpo ete Puli asunga ye na kolendisa bokonzi na ye.
Akazi atindaki bantoma epai ya Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, mpo na koloba na ye : « Nazali mosali na yo mpe mwana na yo ; yaka kokangola ngai na maboko ya mokonzi ya Siri mpe mokonzi ya Isalaele oyo bayei kobundisa ngai. »
Bongo sik’oyo, mpo na nini ozali kokende komela mayi ya ebale Nili kati na Ejipito ? Mpo na nini ozali kokende komela mayi ya ebale Efrate kati na Asiri ?
Efrayimi aliaka mopepe ; mikolo nyonso, alandaka mopepe ya este ; mosala na ye kokosa mpe kosala bato mabe. Asalaka boyokani elongo na Asiri mpe atindaka mafuta ya olive na Ejipito.
Bobongisa maloba na bino mpe bozonga epai na Yawe ; boloba na Ye : « Limbisa mabe na biso nyonso, yamba biso na mawa na Yo mpo ete tobonzela yo maloba ya bibebu na biso, na esika ya bangombe.
Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.
Tango Efrayimi amonaki bokono na ye, mpe Yuda amonaki bapota na ye, Efrayimi abalukaki na ngambo ya Asiri mpe atindaki sango epai ya mokonzi monene mpo na kozwa lisungi, kasi ye akokoka kobikisa mpe kosilisa bapota na yo te.
Misala na bango ezali kopekisa bango kozonga epai ya Nzambe na bango, mpo ete molimo ya kindumba evandi kati na mitema na bango, bazali koyeba Yawe te.
Ata soki bakimi, bakobebisama ; Ejipito ekoyamba bango, Mefisi ekozala kunda na bango ; matiti mabe ekotonda na bibombelo palata na bango, banzube ekotonda kati na bandako na bango.
Bikolo nyonso oyo osalaki elongo na yango boyokani ekobengana yo na mokili na yo ; baninga na yo bakokosa yo, bakokonza yo. Ba-oyo bazalaki kolia lipa na yo bakotiela yo motambo. Kasi yo, okoyeba yango te mpo ete okozala lisusu na mayele te.