Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 6:9 - Mokanda na Bomoi

9 Ndenge babomi babombamaka mpo na koluka kosala bato mabe, ndenge wana mpe Banganga-Nzambe basalaka : babomaka bato na nzela ya Sishemi ; ezali likambo ya somo penza !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 6:9
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrami atambolaki kati na mokili yango kino na esika oyo babengaka Sishemi, na nzete monene ya More. Na tango wana, bato ya Kanana bazalaki kovanda na mokili yango.


Jeroboami atongaki engumba Sishemi, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe avandaki kuna. Longwa na Sishemi, abimaki mpe akendeki kotonga Penueli.


Na mokolo ya zomi na mibale ya sanza ya liboso, tolongwaki na ebale Akava mpo na kokende na Yelusalemi. Loboko ya Nzambe na biso ezalaki likolo na biso, mpe abatelaki biso na nzela liboso ya banguna mpe ya bato ya mobulu.


Yawe alobaki na ngai : — Bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi basali likita.


Basakoli na yo bazali kosala likita ; lokola nkosi oyo ezali koganga tango ezali kopasola nyama na yango, bazali koboma bato, kobotola bomengo mpe biloko ya motuya ya bato mpe kokomisa ebele kati na yango, basi bakufisa mibali.


Bakalaka kati na yango bazali lokola mbwa ya zamba oyo ezali kopasola nyama na yango, bazali kosopa makila mpe koboma bato mpo na kozwa bomengo na nzela ya mabe.


Na mboka na yo, bakoselaka bato makambo mpo na kobomisa bango. Na mboka na yo, baliaka biloko na bisika ya bule oyo ezalaka na likolo ya bangomba mpe basalaka makambo ya nkele.


Nakosukisa makambo ya soni mpe kindumba na yo, oyo obandaki na Ejipito. Okotombola lisusu miso na yo te mpo na komona bato wana mpe okotikala lisusu kokanisa Ejipito te.


Asosolaki te ete ngai nde nazalaki kopesa ye ble, vino ya sika mpe mafuta ; ete ngai nde nasopelaki ye palata mpe wolo oyo basaleli bikeko ya Bala.


etikali kaka kolakelana mabe, lokuta, makambo ya somo, moyibi, kindumba, mobulu mpe kobomana se kobomana.


Bino Banganga-Nzambe, boyoka ! Bino bana ya Isalaele, bofungola matoyi ! Bino mpe bato oyo bosalaka na ndako ya mokonzi, boyoka ! Ezali bino nde bosengelaki kosambisa, kasi bozalaki lokola motambo, na Mitsipa, mpe lokola monyama batanda, na Tabori.


Batomboki batimolaki libulu ya mozindo ; mpe Ngai nakopesa bango nyonso etumbu.


Tango kaka nalingaki kobikisa Isalaele, masumu ya Efrayimi mpe mabe ya Samari ebimaki na pwasa, mpo ete batambolaki na lokuta ; miyibi babukaki bandako mpe bato mabe babotolaki bato biloko kati na babalabala.


Boyoka maloba oyo, bakambi ya Jakobi mpe batambolisi ya Isalaele, bino oyo bolingaka makambo ya sembo te mpe bobongolaka makambo ya alima,


Bayengebene batikali lisusu te na mokili, moto ya sembo azali lisusu te ; bato nyonso bakomi kaka koluka nzela ya kosopa makila, mpe moto na moto azali kotiela ndeko na ye motambo.


Bakalaka na yango bazali lokola bankosi oyo ezali koganga ; bakambi na yango bazali lokola bambwa ya zamba oyo esalaka bokila na pokwa, bongo etikaka ata eloko moko te na tongo.


Wana etikalaki mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika mpe feti ya Mapa ezanga levire ebanda, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini kokanga Yesu na mayele mpo na koboma Ye ;


Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo babengisaki Likita-Monene mpe batunanaki : — Tosala nini ? Moto oyo azali kosala bikamwa mingi.


Tango bayokaki bongo, batombolaki mingongo na bango elongo mpo na kobondela Nzambe ; balobaki : — Nkolo Yawe, Yo nde okela Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ