5 Yango wana, na maloba ya basakoli na Ngai, nazali kokata-kata bino na biteni ; na maloba ya monoko na Ngai, nazali koboma bino, mpe bitumbu ezali kokweyela bino lokola mokalikali.
Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ?
Tango Ayiya ayokaki makelele ya makolo ya mwasi ya Jeroboami na ekuke, alobaki : — Kota, mwasi ya Jeroboami ! Mpo na nini ozali komibongola ? Natindami epai na yo mpo na koyebisa yo sango mabe.
Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi : — Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, Nzambe oyo ngai nasalelaka, mamwe mpe mvula ekozala te na mibu oyo ezali koya, longola kaka soki nasengi yango.
Yorami azwaki mokanda kowuta na mosakoli Eliya ; ezalaki koloba : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya mokonzi na yo Davidi, alobi : ‹ Lokola olandi te ndakisa ya Jozafati, tata na yo, mpe ya Asa, mokonzi ya Yuda,
kasi akokata makambo ya bato bakelela na bosembo mpe akozwa mikano ya sembo mpo na babola ya mokili. Akobeta mokili fimbu na maloba na ye mpe akoboma bato mabe na pema ya monoko na ye.
« Ganga na mongongo makasi, kotika te ! Matisa mongongo na yo lokola kelelo, yebisa bato na Ngai botomboki na bango, mpe lakisa libota ya Jakobi masumu na ye.
Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona.
Na mokolo ya lelo, nakomisi yo engumba batonga makasi, likonzi ya ebende mpe mir ya ebende mpo na komibatela liboso ya mokili mobimba : liboso ya bakonzi ya Yuda, ya bakalaka na yango, ya Banganga-Nzambe na yango mpe ya bavandi nyonso ya mokili yango.
Yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakolangwisa bavandi nyonso ya mokili oyo masanga ; ezala bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi.
Nakokomisa mbunzu na yo makasi lokola diama to mpe makasi koleka ata libanga. Kobanga te mpe kolenga te liboso na bango, atako bazali libota ya batomboki. »
« Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na bato nyonso ya Ejipito mpe kitisa na mokili ya bakufi elongo na bato oyo bakitaka na libulu, mokili ya Ejipito elongo na bato ya bikolo ya nguya.
Kati na engumba yango, Yawe azali sembo, asalaka mabe te ; mokolo na mokolo, alakisaka bosembo na Ye mpe azangaka te kokokisa yango tongo na tongo. Nzokande, moto oyo atambolaka na bosembo te amonaka likambo ya soni te.
Kasi mpo na moto makasi na yo mpe motema libanga na yo, ozali yo moko komibendela etumbu monene mpo na mokolo oyo Nzambe akokweyisa kanda na Ye mpe akomonisa kosambisama na Ye ya sembo.
Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.
Na loboko na Ye ya mobali, asimbaki minzoto sambo ; mpe wuta na monoko na Ye, mopanga moko bapelisa na bangambo na yango nyonso mibale ezalaki kobima. Elongi na Ye ezalaki lokola moyi, na tango oyo engalaka makasi.
Boye ba-anjelu wana minei oyo babongisamaki mpo na ngonga wana, mokolo wana, sanza wana mpe mobu wana, bafungolamaki mpo ete baboma eteni moko kati na biteni misato ya bato.
Samuele alobaki na Saulo : — Osali lokola moto ya liboma ! Obateli te mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesaki yo. Soki obatelaki yango, alingaki kolendisa bokonzi na yo kati na Isalaele mpo na libela.
Samuele alobaki : — Boni, Yawe asepelaka mingi na bambeka ya kotumba mpe na makabo koleka kotosa mongongo na Ye ? Te ! Botosi eleki mbeka ; koyoka eleki mafuta ya meme ya mobali.
Kasi Samuele alobaki na ye : « Memela ngai Agagi, mokonzi ya bato ya Amaleki. » Agagi ayaki na esengo, pamba te azalaki komilobela : « Solo, pasi ya kufa elongwe mpe ekeyi mosika na ngai. »
Kasi Samuele alobaki : « Ndenge mopanga na yo ezangisaki basi bana na bango, ndenge wana mpe mama na yo, kati na basi, akozanga mwana mobali. » Boye, Samuele abomaki Agagi liboso ya Yawe, na Giligali.