Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 6:10 - Mokanda na Bomoi

10 Kati na libota ya Isalaele, namonaki makambo ya somo makasi : Efrayimi amipesaki na kindumba, mpe Isalaele akomaki mbindo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 6:10
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Roboami aboyaki toli oyo bampaka bapesaki ye ; asengaki toli epai ya bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye mpe bazalaki kosalela ye.


mpo na masumu oyo Jeroboami asalaki mpe atindikaki bato ya Isalaele na kosala. Na bongo, apelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.


Makambo oyo esalemaki mpo ete bato ya Isalaele basalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na bango, oyo abimisaki bango wuta na bokonzi ya Faraon, mokonzi ya Ejipito ; bagumbamelaki banzambe mosusu.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Boluka koyeba kati na bikolo soki nani asila koyoka makambo ya boye ! Isalaele, mboka kitoko, asali likambo ya mabe penza !


Namoni lisusu makambo ya nkele kati na basakoli ya Yelusalemi : bazali kosala kindumba mpe kowumela na lokuta, bazali kolendisa bato oyo basalaka mabe mpo ete batika te misala na bango ya mabe. Bango nyonso bazali liboso na Ngai lokola Sodome, bato ya Yelusalemi bazali lokola bato ya Gomore. »


Tango Joziasi azalaki mokonzi, Yawe alobaki na ngai : « Omoni makambo Isalaele oyo apengwi nzela na Ngai azali kosala ? Amataki likolo ya bangomba nyonso mpe atambolaki na se ya banzete nyonso ya mibesu mpo na kosala kindumba.


Ohola amipesaki na kindumba tango azalaki nanu ya Ngai mpe akufelaki kolinga bamakangu na ye, bato ya Asiri, bilombe ya bitumba


Ye moko alakisaki polele kindumba na ye epai ya bato ya lokumu ya Asiri mpe amikomisaki mbindo na nzela ya banzambe ya bikeko nyonso, ya moto nyonso oyo ye azalaki kokufela na bolingo.


mpo na komipesa na kindumba, na masanga ya vino ya kala mpe ya sika oyo elongolaka bato bososoli.


Bato na Ngai bakomi kotuna toli epai ya nzambe ya ekeko oyo basala na nzete, mpe eteni ya nzete ezali koyanola bango. Molimo moko ya kindumba ezali kopengwisa bango, bakomi kosala kindumba mosika na Nzambe na bango,


Efrayimi asangani na banzambe ya bikeko : tika ye akoba bongo !


Nayebi Efrayimi malamu penza ; mpe Isalaele azali ya kobombama te na miso na Ngai. Efrayimi, awa omipesaki na kindumba, Isalaele mobimba akomi mbindo mpo na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ