Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 5:9 - Mokanda na Bomoi

9 Efrayimi akobebisama na mokolo ya etumbu na ye. Nazali koloba makambo ya solo kati na bikolo ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 5:9
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakokoka te kotonga lisusu oyo Ye asili kobebisa, bakokoka kokangola te moto oyo Ye asili kokanga.


Balobaki na ye : « Tala makambo oyo Ezekiasi alobi : ‹ Mokolo ya lelo ezali mokolo ya pasi, mokolo ya etumbu mpe mokolo ya soni, pamba te tokomi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota kasi azangi makasi ya kobimisa mwana.


Nasakolaki makambo ya suka na ebandeli ; wuta kala penza, nasakolaki makambo oyo ekoya. Nalobaki : « Mabongisi na Ngai ekolongisama, mpe nakosala nyonso oyo nasepeli kosala. »


Nasakolaki makambo ya liboso wuta kala, monoko na ngai nde ebimisaki yango mpe nasalaki ete eyebana ; nasalaki yango na pwasa mpe ekokisamaki.


Yango wana, nalobaki na yo makambo oyo wuta kala, nayebisaki yo yango liboso ete ekokisama mpo oloba te : « Nzambe na ngai ya ekeko nde asali yango, elilingi na ngai ya nzete mpe ya ebende nde apesaki mitindo ete esalema ! »


Kasi liboso ete mwana yango ayeba koboya mabe mpe kopona bolamu, mikili ya bakonzi mibale oyo ozali kobanga ekobebisama.


Mpe Ngai, nakomi lokola nseka na miso ya Efrayimi, lokola eloko ya kopola na miso ya bato ya Yuda.


Pamba te nakozala lokola nkosi liboso ya Efrayimi, mpe lokola mwana nkosi liboso ya Yuda. Nakokata-kata bango na biteni mpe nakokende, nakomema bango, mpe moto akobikisa bango akozala te.


Tango akendaka, nabwakelaka ye monyama mpe nakangaka ye ndenge bakangaka ndeke na likolo. Nakopesa ye etumbu oyo ekoki kolanda ndenge nakebisaki ye na tina na yango kati na lisanga.


Isalaele abebisami ; tala bango wana kati na bikolo, bazali komonana lokola biloko pamba !


Mikolo ya etumbu ezali koya, mikolo ya kofuta masumu esili koya. Isalaele, yeba yango ! Mosakoli akomi zoba, moto ya Molimo abeli liboma ! Pamba te masumu na yo ekomi ebele penza, mpe mabe na yo ekomi mingi liboso na ngai.


Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko te soki alakisi mabongisi na Ye te epai ya basali na Ye, basakoli.


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : « Mwasi na yo akosala kindumba kati na engumba, bana na yo ya mibali mpe ya basi bakokufa na mopanga, bakokabola mabele na yo na biteni. Yo moko, okokufa na mabele ya mbindo, mpe Isalaele akokende solo na bowumbu, mosika ya mokili na ye ya mbotama. »


Tango nakotelemela libota ya Jeroboami na nzela ya mopanga na Ngai, nakobebisa bisambelo ya likolo ya bangomba ya Izaki mpe bisika ya bule ya Isalaele.


Yango wana, Ngai nakobeta yo na nzela ya pasi mpe nakobebisa yo mpo na masumu na yo.


Maloba mpe malako na Ngai, oyo napesaki na nzela ya basakoli, basali na Ngai, ekomelaki bakoko na bino te ? Solo, ekomelaki bango, babongolaki mitema mpe balobaki : ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga, asaleli biso kolanda banzela mpe misala na biso, asali ndenge kaka akanaki kosala. › »


Namiyebiseli bino makambo wana nyonso mpo ete, soki tango yango ekoki, bokanisa ete Ngai nasilaki koyebisa bino yango. Nayebisaki bino yango te wuta na ebandeli, mpo ete nazalaki nanu elongo na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ