Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 5:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bazali sembo te liboso ya Yawe, baboti bana makangu ; sik’oyo, bafeti na bango ya ebandeli ya sanza ekoboma bango nzela moko na bomengo na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 5:7
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bikisa mpe kangola ngai na maboko ya bapaya oyo minoko na bango elobaka kaka lokuta mpe maboko na bango elapaka ndayi ya lokuta.


Tanda loboko na Yo wuta kuna na likolo mpo na kobikisa mpe kokangola ngai na mayi minene, na maboko ya bapaya


Motema na Ngai eyini bafeti na bino wana ya ebandeli ya sanza mpe bafeti na bino wana ekatama. Ekomi penza mokumba mpo na Ngai, nalembi komema yango.


Solo, oyoka yango nanu te mpe oyebi yango te ; wuta kala, litoyi na yo ezalaka ya kokangama. Solo, nayebi ete ozalaka mokosi ; babengaka yo motomboki wuta na libumu ya mama na yo.


kotomboka mpe kowangana Yawe, kopesa Nzambe na biso mokongo, kosala mabongisi ya konyokola bato mpe kotombokisa bato, kokana na motema mpe koloba maloba ya lokuta.


Kasi bino lisanga ya Isalaele, bokosi Ngai lokola mwasi oyo asangisi nzoto na mobali mosusu, » elobi Yawe.


Libota ya Isalaele mpe ya Yuda etamboli na boyengebene te na miso na Ngai, » elobi Yawe.


Yango wana, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Liloba na Ngai ata moko te ekowumela lisusu mpo na kokokisama. Maloba nyonso oyo nakoloba ekokokisama, elobi Nkolo Yawe. › »


Yango wana, nakobotola ble na ngai na tango ya kobuka, vino na ngai ya sika na tango ya kokamola yango ; nakobotola bilamba na ngai oyo basala na bapwale ya meme, mpe bilamba na ngai ya lino oyo azalaki kozipa na yango bolumbu na ye.


Bopamela mama na bino, bopamela ye ; pamba te azali lisusu mwasi na ngai te, mpe ngai nazali lisusu mobali na ye te. Tika ete alongola bilembo ya kindumba na elongi na ye mpe bilembo ya ekobo na mabele na ye.


Ndenge kaka Adamu asalaki, bango mpe babukaki boyokani na Ngai ; kuna, bazalaki sembo te liboso na Ngai.


Mawa na bango mpo ete bakimi mosika na Ngai ! Tika ete babebisama mpo ete batombokeli Ngai ! Wana nazalaki na Ngai kokangola bango, kasi bango, basepelaki kokosela Ngai makambo !


Na sanza moko kaka, nabomaki babateli bibwele misato ; nakokaki lisusu kokanga motema te, mpe etonga eyinaki ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ