Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 5:6 - Mokanda na Bomoi

6 Tango bakokende koluka Yawe, elongo na bangombe mpe bameme na bango, bakomona Ye te, pamba te akabwanaki na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 5:6
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moyize azongisaki : — Tokokende elongo na bilenge na biso, bampaka na biso, bana na biso ya mibali mpe ya basi, bameme na biso, bantaba na biso mpe bangombe na biso ; pamba te tokosala feti mpo na lokumu ya Yawe.


Bakoganga epai na Ngai, kasi nakoyanola bango te ; bakoluka Ngai na ngonga ya malamu, kasi bakomona Ngai te.


Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye.


Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele ; ezalaka nkele koleka soki amemi yango na makanisi mabe.


Nafungolelaki mobali na ngai ya motema ndako, kasi akendeki na ye mpe alimwaki. Nakweyaki mayanga wana azalaki koloba ; nalukaki ye, kasi namonaki ye lisusu te ; nabengaki ye, kasi ayanolaki ngai te.


Moto oyo atumbi mbeka ya ngombe azali lokola ye oyo abomi moto, moto oyo atumbi mbeka ya mwana meme azali lokola ye oyo abuki kingo ya mbwa, moto oyo apesi makabo ya mbuma azali lokola ye oyo abonzi makila ya ngulu, moto oyo atumbi ekaniseli ya malasi ya ansa azali lokola ye oyo apamboli nzambe ya ekeko. Solo, baponi kolanda banzela na bango moko mpe kosepela na makambo na bango ya nkele.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela bango pasi ya makasi, mpe ata moto moko te akobika na yango. Ata soki bagangi epai na Ngai, nakoyoka bango te.


Kasi yo Jeremi, kosambela mpo na bato oyo te, kolobela Ngai na tina na bango te, komeka te kosengela bango eloko ; pamba te nakoyoka bango te tango bakobelela Ngai na tango ya pasi.


Ata soki bakili bilei, nakoyoka kolela na bango te ; ata soki babonzi mbeka ya kotumba mpe ya bagato, nakondima yango te. Nzokande, nakobebisa bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka.


Botia motema te na maloba ya lokuta oyo ezali kolobama : ‘ Tempelo ya Yawe, Tempelo ya Yawe, Tempelo ya Yawe ! Yawe azali awa. ’


Omizipaki lipata mpo ete mabondeli edusola te.


Mpo na yango, Ngai mpe nakopesa bango etumbu na kanda, nakoyokela bango mawa te mpe nakobikisa bango te. Ata bagangi na matoyi na Ngai, nakoyoka bango te. »


Alobaki na ngai : « Mwana na moto, ozali komona makambo oyo bazali kosala, makambo mabe mpe ya nkele oyo libota ya Isalaele bazali kosala awa, makambo oyo ekokomisa Ngai mosika ya Esika na Ngai ya bule ? Kasi okomona lisusu makambo oyo ezali mabe koleka. »


Bazali kobonza bambeka lokola likabo mpo na Ngai, mpe bazali kolia misuni ; kasi Yawe azali kosepela na bango te. Sik’oyo, akokanisa mabe na bango mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango : bakozonga na Ejipito.


Bato bakotelengana na bibale nyonso, bakoyengayenga longwa na nor kino na este mpo na koluka Liloba na Yawe, kasi bakotikala komona yango te.


Yango wana, tango bakobelela Yawe, akoyanola bango te. Na tango wana, akobombela bango elongi na Ye likolo ya mabe na bango nyonso oyo basalaki.


« Nani kati na bino akoki kozwa mokano ya kokanga bikuke ya Tempelo mpo ete bopelisa moto na pamba te na etumbelo na Ngai ? Nasepeli na bino ata moke te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « mpe nakoyamba te makabo oyo ewuti na maboko na bino.


Kasi mbala mingi, Yesu azalaki kokende na bisika epai wapi azalaki kaka Ye moko mpo na kosambela.


Bokoluka Ngai, kasi bokomona Ngai te ; mpe epai Ngai nakozala, bino, bokoki te koya kuna.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ