Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 5:5 - Mokanda na Bomoi

5 Lolendo ya Isalaele ezali kofunda bango ; ezala bato ya Efrayimi to ya Isalaele bakokweya mpo na masumu na bango ; bato ya Yuda mpe bakokweya elongo na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 5:5
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto mabe akosambisama solo, kasi bakitani ya bayengebene bakokangolama.


Bosembo ya moto oyo atambolaka alima ekomisaka nzela na ye sembo, kasi moto mabe akokweya mpo na mabe na ye moko.


Babenganaka moto mabe mpo na mabe na ye, kasi moto ya sembo awumelaka na elikya kino ata na kufa.


pamba te ata soki moto ya sembo akweyi mbala sambo, akotelema kaka ; nzokande pasi ekweyisaka moto mabe.


Ezali na bato oyo batonda na lolendo mpe bamonaka bato mosusu pamba.


Yelusalemi ezali kotepatepa, mpe Yuda ekweyi ; mpo ete maloba mpe misala na bango ezali ya botomboki liboso ya Yawe, ezali kotelemela lokumu ya Kombo na Ye.


Bilongi na bango ezali kofunda bango ; bazali kolakisa masumu na bango ndenge bato ya Sodome bazalaki kosala, bazali kobomba yango te. Mawa na bango, pamba te bamilukeli nde makambo !


Basali bikeko, bango nyonso, bazali pamba, mpe biloko oyo bango balingaka ezali ata na litomba te ; esengelaki kotatola mpo na bango, kasi emonaka te mpe eyebaka ata eloko moko te ; boye, bayokisama soni.


Pamba te mabe na biso ekomi mingi na miso na Yo, mpe masumu na biso ekomi kofunda biso ; masumu na biso ezali liboso na biso mpe toyebi malamu bambeba na biso :


Oh Yawe, ata masumu na biso ezali kofunda biso, sala mpo na lokumu ya Kombo na Yo, pamba te towangani Yo mpe mingi, tosalaki masumu liboso na Yo.


Mabe na yo ekomemela yo etumbu, kotomboka na yo ekomemela yo pamela. Tala malamu mpe sosola ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo kosundola Yawe, Nzambe na yo, mpe kozanga kotosa Ngai, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Bato ya Samari basengeli kozwa etumbu mpo na mabe na bango, pamba te batombokeli Nzambe na bango. Bato bakokufa na mopanga ; bakonyata-nyata babebe na bango, bakopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.


Isalaele, zongela Yawe, Nzambe na yo, pamba te ezali masumu na yo nde ekweyisaki yo.


Bokobeta mabaku, na moyi makasi ; basakoli mpe bakobeta mabaku elongo na bino, na butu, mpe nakobebisa mama na bino.


Pamba te nakozala lokola nkosi liboso ya Efrayimi, mpe lokola mwana nkosi liboso ya Yuda. Nakokata-kata bango na biteni mpe nakokende, nakomema bango, mpe moto akobikisa bango akozala te.


Lolendo ya Isalaele ezali kofunda ye, kasi azali komona nyonso wana pamba : azongeli te Yawe, Nzambe na ye ; mpe atako bongo, azali kaka koluka Ye te !


Isalaele abosani Mokeli na ye mpe atongi bandako ya kitoko ; Yuda atongi bingumba ebele batonga makasi ; kasi Ngai nakotinda moto kati na bingumba na bango, mpe ekotumba bandako na bango ya kitoko. »


« Isalaele, mboka kitoko, ekweyi na mabele, ezali kokoka kotelema lisusu te ! Basundoli yango kaka bongo, mpe moto akotelemisa yango azali te. »


Boye, na maloba na bino moko, bondimaka ete bozali penza bakitani ya bato oyo babomaki basakoli.


Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe ! Nakopesa yo etumbu kolanda maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, ete nazwaka biloko oyo nabombaki te mpe nabukaka bambuma ya nkona oyo nalonaki te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ