Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 5:4 - Mokanda na Bomoi

4 Misala na bango ezali kopekisa bango kozonga epai ya Nzambe na bango, mpo ete molimo ya kindumba evandi kati na mitema na bango, bazali koyeba Yawe te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 5:4
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, bakozala te lokola bakoko na bango, oyo bazalaki mito makasi mpe batomboki, oyo mitema na bango ezalaki sembo te na miso ya Nzambe, mpe milimo na bango ezangaki boyengebene epai na Ye.


Yawe azali ebombamelo mpo na bato oyo bazali konyokolama, mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.


Nakopesa bango motema oyo ekoyeba Ngai, mpo ete basosola ete nazali Yawe. Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango, pamba te bakozongela Ngai na motema na bango mobimba.


Bokawuki, kweyela mayi na yango mpo ete ekawuka ; pamba te ezali mokili ya banzambe ya bikeko, bikeko oyo epesaka bato somo !


« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bakatama ngenga kaka na nzoto, kasi na mitema te :


Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Tala, nakopetola mpe nakomeka bango na moto, pamba te nasala lisusu nini mpo na masumu ya bato na Ngai ?


Pasi ekomeli ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ; kasi mpo ete azali lokola mwana azanga mayele, soki tango ya kobotama ekoki, abimaka na libumu ya mama na ye te.


Bana ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe ! Pamba te Yawe azali kosamba na bino, bavandi ya mokili, mpo ete bosolo, bolingo mpe boyebi ya Nzambe ezali lisusu te kati na mokili ;


mpo na komipesa na kindumba, na masanga ya vino ya kala mpe ya sika oyo elongolaka bato bososoli.


Bato na Ngai bakomi kotuna toli epai ya nzambe ya ekeko oyo basala na nzete, mpe eteni ya nzete ezali koyanola bango. Molimo moko ya kindumba ezali kopengwisa bango, bakomi kosala kindumba mosika na Nzambe na bango,


Nakopesa etumbu te : ezala na bana na bino ya basi mpo na kindumba na bango to na basi ya bana na bino mpo na ekobo na bango ; pamba te bango moko mibali babimaka na basi ya ndumba mpe babonzaka mbeka elongo na bandumba ya tempelo. Bato bazangi bososoli basukaka se na libebi !


Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.


Efrayimi akomi lokola ebenga oyo ekosamaka na bopete mpe ezangi mayele : azali kosenga lisungi epai ya Ejipito, kasi azali mpe kokende na Asiri.


Ata Efrayimi atongi bitumbelo ebele mpo na kolongola masumu na ye, kasi bitumbelo yango ekomemisa ye kaka masumu.


Bakosala bongo mpo ete batikalaki koyeba te ezala Tata to ngai.


Solo, bino, boyebi Ye te ; kasi Ngai, nayebi Ye. Soki nameki koloba ete nayebi Ye te, wana nakozala mokosi lokola bino. Kasi nayebi Ye mpe nabatelaka Liloba na Ye.


Bana mibali ya Eli bazalaki kilikili, bayebaki Yawe te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ