Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 5:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bakambi ya Yuda bazali lokola bato oyo bapusaka bandelo. Nakopelisela bango kanda na Ngai lokola mpela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 5:10
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, tika ete bayengebene nyonso basambelaka Yo na tango ya malamu ! Soki mayi minene etomboki, bambonge na yango ekozwa bango te.


Tika ete miso na bango ekufa mpo ete bamona lisusu te, mpe babela mikongo mpo na libela.


Kanda makasi na Yo ebetaka ngai, minyoko oyo ewutaka epai na Yo ekomisaka ngai moto pamba.


Kobanda koswana ezali lokola kofungola nzela ya mayi ; tika na yo liboso ete kobendana ekoma makasi.


Kozongisa na sima te mondelo ya kala oyo batata na yo bakataki.


Bakambi na yo bazali batomboki, baninga ya miyibi ; bango nyonso balingaka kaka kanyaka mpe batonda na lokoso ya lifuti. Bakotelaka mwana etike te, mpe likambo ya mwasi oyo akufisa mobali etalaka bango te.


Ndenge bazikisaka palata kati na etumbelo ya bibende, ndenge wana mpe nakozikisa bino kati na engumba. Boye, bokoyeba solo ete Ngai Yawe, nasopeli bino kanda na Ngai ya makasi. › »


Nakomi pene ya kopelisela yo kanda na Ngai mpe ya kotombokela yo ! Nakosambisa yo kolanda etamboli mpe misala na yo nyonso ya mbindo.


tango mvula ebetaki makasi, mayi eyaki elongo na mopepe makasi, emibwakaki na ndako yango ; ndako yango ekweyaki, mpe nyonso epanzanaki. »


Kasi moto oyo ayokaka maloba na Ngai mpe atiaka yango te na misala akokani na moto oyo atongaki ndako na likolo ya mabele, ezanga moboko ; tango kaka mpela emibwakaki na ndako, ndako yango ekweyaki mbala moko mpe epanzanaki. »


Okoki te kopusa mondelo ya moninga na yo, mondelo oyo bato oyo bayaki liboso na yo na mabele na yo bakataki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo ete bokamata yango.


« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akopusa libanga oyo batie lokola mondelo na mabele ya moninga na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ