Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 5:1 - Mokanda na Bomoi

1 Bino Banganga-Nzambe, boyoka ! Bino bana ya Isalaele, bofungola matoyi ! Bino mpe bato oyo bosalaka na ndako ya mokonzi, boyoka ! Ezali bino nde bosengelaki kosambisa, kasi bozalaki lokola motambo, na Mitsipa, mpe lokola monyama batanda, na Tabori.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 5:1
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta tango nabimisaki bakoko na bino na Ejipito kino na mokolo ya lelo, nazalaki tango na tango kokebisa bango na maloba oyo : ‹ Botosa Ngai ! ›


Loba na mokonzi mpe na mama ya mokonzi : « Bolongwa na bakiti na bino ya bokonzi, pamba te mitole na bino ya nkembo ekolongwa na mito na bino. »


Lokola Ngai nazali na bomoi, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « monguna oyo azali lokola ngomba Tabori kati na bangomba, lokola ngomba Karimeli pembeni ya ebale monene, azali koya !


Beteli, makambo oyo ekokomela yo mpo ete mabe na yo eleki ndelo. Tango mokolo yango ekokoka, mokonzi ya Isalaele akozala lisusu te.


Nakolanda bino lokola ngombolo oyo ebungisi bana na yango mpe nakopasola misuni ya mitema na bino. Nakolia bino wana, lokola nkosi ya mwasi, bongo banyama ya zamba ekoya kopanza bino biteni-biteni.


Bana ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe ! Pamba te Yawe azali kosamba na bino, bavandi ya mokili, mpo ete bosolo, bolingo mpe boyebi ya Nzambe ezali lisusu te kati na mokili ;


Ndenge babomi babombamaka mpo na koluka kosala bato mabe, ndenge wana mpe Banganga-Nzambe basalaka : babomaka bato na nzela ya Sishemi ; ezali likambo ya somo penza !


Mokengeli ya Efrayimi azali elongo na Nzambe na ngai, azali mosakoli ; Nzokande bazali kotiela ye mitambo na banzela na ye nyonso mpe bazali kotelemela ye kino na Ndako ya Nzambe na ye.


— Bino bakambi ya bato, boyoka liloba oyo ; bino nyonso, bavandi ya mokili, botia matoyi mpe boyoka ! Boni, likambo ya boye esila kosalema na tango na bino to mpe na tango ya bakoko na bino ?


Oh bana ya Isalaele, boyoka liloba oyo Yawe alobi na tina na bino, na tina na etuka nyonso oyo nabimisaki na Ejipito :


Tango nakotelemela libota ya Jeroboami na nzela ya mopanga na Ngai, nakobebisa bisambelo ya likolo ya bangomba ya Izaki mpe bisika ya bule ya Isalaele.


Boye, nalobaki : « Boyoka, bino bakambi ya libota ya Jakobi, bino batambolisi ya libota ya Isalaele ! Ezali bino te bato bosengeli koyeba malamu mibeko ?


Boyoka maloba oyo, bakambi ya Jakobi mpe batambolisi ya Isalaele, bino oyo bolingaka makambo ya sembo te mpe bobongolaka makambo ya alima,


Bayengebene batikali lisusu te na mokili, moto ya sembo azali lisusu te ; bato nyonso bakomi kaka koluka nzela ya kosopa makila, mpe moto na moto azali kotiela ndeko na ye motambo.


Mwana mobali apesaka tata na ye lokumu, mpe mowumbu apesaka nkolo na ye lokumu. Soki Ngai nazali Tata, wapi lokumu oyo esengeli na Ngai ? Soki nazali Nkolo, wapi lokumu na Ngai ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Ezali bino Banganga-Nzambe nde bozali kosambwisa Kombo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tozali kosambwisa Kombo na Yo ? ›


« Sik’oyo, bino Banganga-Nzambe, likebisi oyo epesami epai na bino :


Tango bayebisaki Sisera ete Baraki, mwana mobali ya Abinoami, amataki na likolo ya ngomba Tabori,


Mokolo moko, abengisaki Baraki, mwana mobali ya Abinoami, moto ya Kedeshi ya Nefitali, mpe alobaki na ye : — Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesi yo mitindo : « Kende, kamata elongo na yo bato nkoto zomi ya mabota ya Nefitali mpe ya Zabuloni, mpe mema bango na nzela oyo ekenda na ngomba Tabori.


Abandaki kotambola mibu nyonso, kobanda na Beteli, koleka na Giligali kino na Mitsipa, mpo na kokamba bato ya Isalaele na bisika nyonso wana.


Samuele alobaki na bango : « Bosangisa bato nyonso ya Isalaele, na Mitsipa, mpe ngai nakosambela Yawe mpo na bino. »


Bato ya Isalaele basanganaki na Mitsipa, batokaki mayi mpe basopaki yango na mabele, liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bakilaki bilei mpe batubelaki kuna masumu na koloba : « Tosalaki masumu liboso ya Yawe. » Samuele akambaki Isalaele wuta na Mitsipa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ