Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 4:9 - Mokanda na Bomoi

9 Makambo oyo ekokomela bato yango ekokomela mpe Banganga-Nzambe : nakopesa bango nyonso etumbu nzela moko mpo na etamboli na bango mpe nakofuta bango kolanda misala na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 4:9
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki moto ya sembo azwaka litomba na ye awa na mokili, ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki ?


Na nzela ya mbuma ya monoko na ye, moto akotondisama na bolamu ; mpe moto akozwa lifuti ya misala ya maboko na ye.


Moto mabe akokangama kaka na motambo ya mabe na ye moko mpe na singa ya lisumu na ye,


Ekozala mpe kaka ndenge moko mpo na Banganga-Nzambe mpe bato, mpo na nkolo mpe mowumbu na ye, mpo na nkolo ya mwasi mpe mwasi mosali na ye, mpo na moteki mpe mosombi, mpo na modefisi mpe modefi, mpo na moto oyo bakofuta ye niongo mpe mpo na moto oyo akofuta niongo.


Loba na moto ya sembo : « Bolamu ekobila yo, pamba te okosepela na mbuma ya misala na yo. »


basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta, Banganga-Nzambe bazali kosalela bokonzi na bango ndenge balingi, mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo. Kasi bokosala nini na suka ? »


Balevi oyo bakomaki mosika na Ngai, tango Isalaele abungaki nzela mpe azalaki koyengayenga mosika na Ngai mpo na kolanda banzambe na bango ya bikeko, bakomema mikumba ya masumu na bango.


Kasi lokola basalelaki bango liboso ya banzambe na bango ya bikeko mpe bakweyisaki libota ya Isalaele na masumu, nalapi ndayi, na kotombola loboko, ete bakomema mikumba ya masumu na bango, elobi Nkolo Yawe.


Yawe alobaki na ye : — Pesa ye kombo Jizireyeli, pamba te etikali moke napesa libota ya Jewu etumbu mpo na makila ya bato oyo asopaki na Jizireyeli, mpe nakosukisa bokonzi, na libota ya Isalaele.


Nakopesa bango etumbu ndenge nalingi ; bato ya bikolo ya bapaya bakosalela bango likita mpe bakokanga bango minyololo likolo ya masumu mibale oyo basalaki.


Efrayimi aliaka mopepe ; mikolo nyonso, alandaka mopepe ya este ; mosala na ye kokosa mpe kosala bato mabe. Asalaka boyokani elongo na Asiri mpe atindaka mafuta ya olive na Ejipito.


Yawe alingi kosamba na Yuda ; akopesa Jakobi etumbu kolanda etamboli na ye mpe akofuta ye kolanda misala na ye.


Bamilobelaka te, kati na mitema na bango, ete Ngai nabosanaka te mabe nyonso oyo basalaka ; sik’oyo, misala na bango ya mabe ezingeli bango, ezali tango nyonso liboso na Ngai.


Bazali kobonza bambeka lokola likabo mpo na Ngai, mpe bazali kolia misuni ; kasi Yawe azali kosepela na bango te. Sik’oyo, akokanisa mabe na bango mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango : bakozonga na Ejipito.


Nayinaki bango mpo na mabe na bango nyonso oyo basalaki na Giligali ; Nakobengana bango na Ndako na Ngai mpo na misala na bango ya mabe. Nakolinga bango lisusu te, pamba te bakonzi na bango nyonso bazali batomboki.


Bamikotisi penza kati na mabe ndenge basalaki na mikolo ya Gibea. Nzambe akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango.


Maloba mpe malako na Ngai, oyo napesaki na nzela ya basakoli, basali na Ngai, ekomelaki bakoko na bino te ? Solo, ekomelaki bango, babongolaki mitema mpe balobaki : ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga, asaleli biso kolanda banzela mpe misala na biso, asali ndenge kaka akanaki kosala. › »


Botika bango ; bazali bakufi miso oyo bazali kotambolisa bakufi miso mosusu. Nzokande, soki mokufi miso azali kotambolisa mokufi miso mosusu, bango mibale bakokweya solo kati na libulu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ