Tala liloba oyo Yawe alobi : « Wapi mokanda ya koboma libala oyo Ngai nabenganelaki mama na bino ? To natekaki bino epai ya nani oyo Ngai nazalaki na niongo na ye ? Botekamaki mpo na masumu na bino ; mpe libala ya mama na bino ekufaki mpo na botomboki na bino.
Basi na bango oyo bakufisa mibali, nakokomisa bango ebele koleka zelo ya ebale monene. Na ngonga ya midi, nakoyeisa mobebisi mpo na koboma bamama ya bana na bango ; nakokweyisela bango somo mpe pasi na mbalakata.
Na tina na basakoli : Motema na ngai ebukani kati na ngai, mikuwa na ngai nyonso ezali kolenga. Nakomi lokola moto oyo alangwe masanga, lokola moto oyo masanga ya vino ebeti ye, likolo na Yawe mpe maloba na Ye ya bule.
mama na bino akoyoka soni makasi ; ye oyo abotaki bino akosambwa. Ekozala ekolo ya suka kati na bikolo, ekozala zelo na zelo, mabele ya kokawuka mpe esobe.
Bongo, bato ya Yuda mpe ya Isalaele bakozonga lisusu kozala ekolo moko, bakopona mokonzi moko kaka mpe bakobima na mokili ya bowumbu, pamba te mokolo ya Jizireyeli ekozala mokolo monene.
Soki te, nakolongola ye bilamba mpe nakotika ye bolumbu ndenge babotela ye, nakokomisa ye lokola esobe, lokola mokili oyo ekawuka ; mpe akokufa na posa ya mayi.
Lolendo ya Isalaele ezali kofunda bango ; ezala bato ya Efrayimi to ya Isalaele bakokweya mpo na masumu na bango ; bato ya Yuda mpe bakokweya elongo na bango.
Na mokolo wana, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, nakosala ete bakombo ya banzambe ya bikeko elimwa na mokili ; boye bakotikala kokanisa yango lisusu te. Nakolongola lisusu kati na mokili basakoli mpe molimo ya mbindo.