Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 4:4 - Mokanda na Bomoi

4 Kasi tika ete moto moko te amilongisa to apamela moninga na ye, pamba te bato na yo bazali lokola bato oyo batiaka tembe na Banganga-Nzambe !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 4:4
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! »


Nakokangisa lolemo na yo na monoko na yo mpo ete okoka koloba te mpe okoka kopamela bango te, pamba te bazali libota ya batomboki.


Efrayimi asangani na banzambe ya bikeko : tika ye akoba bongo !


Bino bato boyinaka moto oyo akataka makambo na bosembo mpe botiolaka moto oyo alobaka solo,


Boye, moto ya mayele alobaka te na tango ya boye, pamba te mikolo ezali mabe.


Soki noko moko oyo asengeli kotumba bibembe ayei kobimisa yango na ndako mpe atuni na moto nyonso oyo abombami kuna : — Boni, ozali elongo na moto mosusu kuna ? Akozongisa : — Te, moto mosusu azali te ! Bongo akoloba lisusu : — Esili ! Bakolobela lisusu Kombo ya Yawe te.


Moto oyo akosala lolendo mpe akoboya kotosa Nganga-Nzambe to mosambisi oyo atelemi mpo kosala mosala na esika oyo Yawe aponaki mpo na ye, basengeli koboma ye. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ