Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 4:3 - Mokanda na Bomoi

3 Mpo na yango, mokili ekokoma na mawa, bavandi na yango nyonso bakolemba nzoto, nyama ya zamba, ndeke ya likolo mpe mbisi ya ebale monene ekokufa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 4:3
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokili ezali na matanga, esili kolemba nzoto, Libani esambwe na soni mpe elembi-lembi lokola fololo, Saroni ekomi lokola esobe mpe Bashani mpe Karimeli ekweyisi makasa na yango.


Kino tango nini mokili ekowumela na kolela mpe matiti ya bilanga nyonso ekowumela ya kokawuka ? Banyama mpe bandeke esili kokufa mpo ete bavandi ya mokili bazali mabe. Balobaka : « Yawe akoyeba te makambo oyo ekokomela biso. »


Pamba te mokili etondi na kindumba, mokili ekomi na matanga. Likolo ya bilakeli mabe, matiti oyo bibwele eliaka na esobe ekawuki, basakoli bakomi kolanda nzela mabe mpe bakomi na molende ya kosala kaka makambo oyo esengeli te.


Mpe tango natalaki malamu, namonaki lisusu ata moto moko te, mpe bandeke nyonso ya likolo ekimaki.


« Nakokomisa Yelusalemi liboke ya mabanga oyo ebukana-bukana, ndako ya mbwa ya zamba ; nakobebisa bingumba ya Yuda, bongo moto moko te akovanda lisusu kuna.


Nakosala matanga mpe nakolela mpo na bangomba mpe matiti ya esobe. Nyonso esili kokawuka mpe moto moko te azali lisusu kolekela wana ; ezala makelele ya bibwele to ya bandeke ezali lisusu koyokana te ; bandeke ya likolo ekimi mpe banyama ya zamba esili kokende.


Bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, banyama ya zamba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bato nyonso oyo bazali awa na mabele bakolenga liboso na Ngai ; bangomba ekopanzana, mabanga minene ekobukana mpe bamir nyonso ekokweya na mabele.


Tika ete ngombe elela ! Bibwele ekomi kotelengana, pamba te matiti ya kolia etikali lisusu te ; ezala bameme to bantaba ekomi na pasi.


Alobaki : Yawe azali koganga wuta na Siona, mpe azali koloba wuta na Yelusalemi, na mongongo makasi lokola kake. Matiti ya bitando epai wapi babateli bibwele baleisaka bibwele ekokawuka, mpe songe ya ngomba Karimeli ekokawuka.


Yango wana, tala liloba oyo Nkolo, Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Kolela ekozala na babalabala nyonso, mpe koganga ya somo ekozala na bisika nyonso oyo bato bakutanaka. Bakobengisa basali bilanga na matanga, mpe bato oyo balelaka bibembe mpo na kolela.


Mpo na yango, mokili ekolenga, mpe bato na yango nyonso bakozala na matanga. Mokili mobimba ekotomboka lokola ebale Nili oyo etondi na mayi ; ekokoma koningana-ningana mpe ekokita lokola ebale ya Ejipito.


Agangelaka ebale monene mpe akawusaka yango, akawusaka bibale nyonso. Etuka ya Bashani mpe ya Karimeli esili nyonso kokawuka, mpe matiti nyonso ya Libani esili kokawuka.


« solo, nakoboma ezala bato to banyama, ezala bandeke ya likolo to bambisi ya ebale ; nakolongola, na mokili, bato mabe mpe biloko oyo ebetisaka bato mabaku » elobi Yawe.


Nakoyeisa elakeli mabe oyo mpo ete ekota kati na ndako ya moyibi mpe kati na ndako ya moto oyo alapaka ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai. Ekotikala solo kati na ndako na ye mpe ekobebisa yango nyonso, ezala mabaya to mabanga na yango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ