Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 4:17 - Mokanda na Bomoi

17 Efrayimi asangani na banzambe ya bikeko : tika ye akoba bongo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 4:17
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi bato na ngai bayokaki mongongo na ngai te, Isalaele aboyaki kotosa ngai.


Kasi tango nyonso bazalaki kobenga ye, tango nyonso mpe azalaki kokima mosika na Ngai. Bazalaki kobonzela banzambe ya Bala mbeka mpe kotumbela bikeko malasi ya ansa.


Mopanga ekokota na bingumba na bango, ekobuka bikangelo ya bikuke na bango mpe ekosukisa mabongisi na bango.


Efrayimi azingeli Ngai na lokuta, mpe libota ya Isalaele, na kokosa ; kasi Yuda azali nanu kotambola elongo na Nzambe, elongo na Mosantu ya solo.


Sik’oyo, bazali kokoba kosala masumu ; na mayele na bango, bazali komisalela banzambe ya bikeko na nzela ya palata na bango balekisa na moto, bililingi oyo babongisa malamu : nyonso wana ezali mosala ya bato ya misala ya maboko. Balobaka na tina na bango : « Babonzaka bato lokola bambeka mpe bapesaka beze na bana ngombe ya mibali. »


Kasi tika ete moto moko te amilongisa to apamela moninga na ye, pamba te bato na yo bazali lokola bato oyo batiaka tembe na Banganga-Nzambe !


Botika bango ; bazali bakufi miso oyo bazali kotambolisa bakufi miso mosusu. Nzokande, soki mokufi miso azali kotambolisa mokufi miso mosusu, bango mibale bakokweya solo kati na libulu.


Tika ete moto oyo asalaka mabe akoba kosala mabe, tika ete moto oyo azali mbindo akoba kozala mbindo, tika ete moto oyo azali sembo akoba kozala sembo, mpe tika ete moto azali bule akoba kozala bule ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ