Oze 4:13 - Mokanda na Bomoi13 kobonza bambeka na likolo ya bangomba milayi, kotumba ansa lokola mbeka ya malasi na likolo ya bangomba mikuse, na se ya banzete minene oyo epesaka pio ya kitoko lokola sheni, pepiliye mpe terebente ! Mpo na yango, bana na bino ya basi bakosala kindumba, mpe basi ya bana na bino bakosala ekobo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe tango bato na bango bakokufa na mopanga kati na banzambe na bango ya bikeko zingazinga ya bitumbelo na bango, na bangomba nyonso ya mikuse mpe na likolo ya bangomba nyonso ya milayi, na se ya banzete nyonso ya mibesu mpe na se ya terebente nyonso ya mobesu etonda na makasa, bisika oyo bazalaki kotumbela banzambe na bango ya bikeko ansa lokola mbeka ya solo kitoko.