Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 4:11 - Mokanda na Bomoi

11 mpo na komipesa na kindumba, na masanga ya vino ya kala mpe ya sika oyo elongolaka bato bososoli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 4:11
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Vino elobisaka bato maloba ya soni, masanga ya makasi ememaka mobulu ; moto nyonso oyo amipesaka na yango akotikala te kokoma moto ya bwanya.


Eh Lemweli, ebongi te mpo na bakonzi ; te, ebongi te mpo na bato minene kotuna : « Wapi masanga ya makasi ? »


Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moninga azali lokola moto oyo azangi mayele ; kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma ;


Minyoko ekomisaka moto ya bwanya zoba, mpe bakado epengwisaka motema.


Mpe lisusu, Banganga-Nzambe mpe basakoli bapengwi mpo na masanga ya vino ; masanga makasi ekomi kotengisa-tengisa bango ; masanga epengwisi bango, vino ebungisi bango, masanga makasi ekomi kotengisa-tengisa bango ; bakomi kobunga na bimoniseli na bango, bakomi kokata makambo na ndenge esengeli te.


Bazali na mandanda, banzenze, masanga ya vino, bambunda mike mpe baflite mpo na kosepelisa bafeti na bango, kasi bakanisaka te mosala na Yawe mpe bazalaka na limemia te mpo na misala ya maboko na Ye.


« Namoni makambo ya nkele kati na basakoli ya Samari : bazali kosakola na kombo ya nzambe Bala mpe bazali kobungisa Isalaele, bato na Ngai, nzela.


Bato na Ngai bakomi kotuna toli epai ya nzambe ya ekeko oyo basala na nzete, mpe eteni ya nzete ezali koyanola bango. Molimo moko ya kindumba ezali kopengwisa bango, bakomi kosala kindumba mosika na Nzambe na bango,


Misala na bango ezali kopekisa bango kozonga epai ya Nzambe na bango, mpo ete molimo ya kindumba evandi kati na mitema na bango, bazali koyeba Yawe te.


Efrayimi akomi lokola ebenga oyo ekosamaka na bopete mpe ezangi mayele : azali kosenga lisungi epai ya Ejipito, kasi azali mpe kokende na Asiri.


« Tango bokobanda kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, yo mpe bana na yo ya mibali, bosengeli te komela masanga oyo elangwisaka, noki te bokokufa. Yango ezali mobeko ya libela na libela mpo na bino mpe milongo nyonso oyo ekoya sima na bino,


Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,


Tango Abigayili akomaki epai ya Nabali, akutaki Nabali azali kosala feti kati na ndako na ye ndenge penza mokonzi asalaka yango. Azalaki na loyenge mpe alangwaki makasi. Boye Abigayili ayebisaki ye eloko te kino na tongo ya mokolo oyo elandaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ