3 Bongo nalobaki na ye : — Wumela na ngai tango molayi ; okosala kindumba te mpe okomipesa na mobali mosusu te, ngai mpe nakosala kaka bongo epai na yo.
Bokeba ! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili yango ; noki te tango bakosambela banzambe na bango mpe bakobonzela yango mbeka, babenga bino mpo ete bolia mbeka na bango elongo ;
akotia pembeni bilamba oyo alataki tango bakangaki ye mpe akovanda na ndako ya mobali yango. Sima na ye kolela tata mpe mama na ye sanza mobimba, mobali yango akosangisa na ye nzoto mpe akokoma mobali na ye ; bongo ye akokoma mwasi ya mobali yango.