Navandi na ndako na yo mibu tuku mibale : nasalelaki yo mibu zomi na minei mpo na bana na yo mibale ya basi, mpe mibu motoba mpo na bibwele na yo ; mbala zomi obongolaki lifuti na ngai.
Pamba te elanga ya vino ya ba-ekitare mibale ekobimisa kaka bisangala minei ya vino, bakilo nkama mibale na tuku mibale ya milona ya ble ekobimisa kaka bakilo tuku mibale na mibale. »
Soki moto abulisi mpo na Yawe eteni ya mabele kati na mabele na ye, bakokata motuya ya eteni ya mabele yango kolanda milona oyo bakoki kolona kuna : bagrame nkama motoba ya palata mpo na bakilo nkama minei ya bambuma ya orje.
Nazwi lisusu Rite, moto ya Moabi, oyo azalaki mwasi ya Maaloni oyo akufa, mpo ete azala mwasi na ngai, mpo na kosala ete kombo na ye etikala na libula na ye, ete ebunga te kati na bandeko na ye mpe kati na buku ya leta ya engumba na ye. Bino bozali batatoli na yango lelo.
Saulo alobaki : « Boloba na Davidi ete mokonzi asengi mbongo ya libala te, kasi bangenga nkama moko ya nzoto ya mibali kati na bato ya Filisitia mpo na kozongisa mabe na mabe epai ya banguna na ye. » Makanisi ya Saulo ezalaki ya komona Davidi kokweya na maboko ya bato ya Filisitia.