Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 2:9 - Mokanda na Bomoi

9 Akolanda bamakangu na ye, kasi akozwa bango te ; akoluka bango, kasi akomona bango te. Bongo akoloba : « Tika nazongela mobali na ngai ya liboso ; pamba te elongo na mobali ya liboso, nazalaki na esengo koleka sik’oyo ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 2:9
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Natombokelaki yo, nabotolaki yo bilei oyo napesaki yo mpe nakabaki yo na maboko ya banguna na yo, bingumba ya bato ya Filisitia, oyo bazalaki mpe kosepela ata moke te na bizaleli na yo ya soni mpe ya mabe.


Nakokaba yo na maboko ya bamakangu na yo, bakobuka mwa bandako na yo ya kindumba mpe bisika na yo ya bule ; bakolongola yo na makasi bilamba mpe babiju ya kitoko mpe bakotika yo bolumbu.


Bakobotola yo lisusu bilamba na yo mpe babiju na yo ya talo.


Pamba te mokonzi ya mokili ya nor akosangisa mampinga monene ya basoda koleka oyo ya liboso mpe, sima na mibu ebele, akozonga elongo na mampinga ya basoda ebele mpe na bibundeli ebele.


— Loba na bandeko na yo ya mibali : « Bozali bato na ngai, » mpe na bandeko na yo ya basi : « Bozali balingami na ngai. »


« Lokola baloni mopepe, bakobuka mopepe ya makasi. Nzete ya ble oyo ezanga moto ebimisaka farine te. Ezala soki ebimisi mito, ezali bapaya nde bakolia yango.


Etando oyo batutelaka ble mpe ekamolelo masanga ya vino ekopesa bango bilei te, mpe bakozanga vino ya sika.


Nani ayebi soki akoki kobongola makanisi to koyoka mawa mpe kotika na sima na Ye lipamboli, mpo ete bokoka lisusu kobonzela Yawe, Nzambe na bino, makabo ya bambuma to makabo ya masanga ya vino ?


Bakobotola bango bomengo na makasi mpe bakobuka bandako na bango ; bakotonga bandako, kasi bakotikala kovanda yango te ; bakosala bilanga ya vino, kasi bakotikala komela vino na yango te. »


Edomi akoki koloba : « Ata babebisi mokili na biso, tokotonga yango kaka lisusu ! » Kasi tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Solo, bakotonga na bango yango, kasi Ngai nakobuka yango ! Bakobenga mokili yango : ‹ Mokili ya makambo mabe, bato oyo bazali tango nyonso na se ya kanda ya Yawe. ›


« Bongo bokomona lisusu bokeseni kati na moto ya sembo mpe moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe mpe moto oyo asalelaka Ye te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ