Oze 2:8 - Mokanda na Bomoi8 Yango wana, nakokangela ye nzela na banzube, nakotongela ye mir mpo ete akoka lisusu komona nzela te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Otomboli mapeka na yo mpo na kotelemela Yawe ya Lola, oyeisi epai na yo bakopo oyo ewutaki na Tempelo na Ye ; bongo yo, bato na yo ya lokumu, basi na yo mpe bamakangu na yo, bomeli na yango masanga ya vino mpe bokumisi banzambe ya palata mpe ya wolo, ya bronze mpe ya ebende, ya nzete mpe ya mabanga, oyo emonaka te, eyokaka te mpe esosolaka te. Kasi opesi lokumu te na Nzambe oyo, kati na loboko na Ye, asimbi bomoi mpe banzela na yo nyonso.
Sik’oyo, bazali kokoba kosala masumu ; na mayele na bango, bazali komisalela banzambe ya bikeko na nzela ya palata na bango balekisa na moto, bililingi oyo babongisa malamu : nyonso wana ezali mosala ya bato ya misala ya maboko. Balobaka na tina na bango : « Babonzaka bato lokola bambeka mpe bapesaka beze na bana ngombe ya mibali. »