Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 2:20 - Mokanda na Bomoi

20 Na mokolo wana, nakosala boyokani mpo na bango elongo na banyama ya zamba, bandeke ya likolo, mpe bikelamu oyo etambolaka na libumu. Nakobuka tolotolo mpe mopanga, mpe nakosilisa bitumba : nyonso wana ekosila na mokili mpo ete bato nyonso bavanda na kimia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 2:20
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

na bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali elongo na yo : bandeke, bibwele mpe banyama ya zamba, banyama nyonso oyo ebimaki na masuwa elongo na yo, bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili.


Akozala Mosambisi kati na bikolo, akokata makambo ya kowelana kati na bato ebele. Bakotumba mipanga na bango na moto mpo na kosala bakongo, mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli. Ekolo moko te ekotombola lisusu mopanga mpo na kobundisa ekolo mosusu ; bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba.


Bakobenga yo lisusu te Engumba basundola, bakobenga lisusu mokili na yo te Mokili ebeba ; kasi bakobenga yo « Esengo ya Yawe, » mpe bakobenga mokili na yo « Mwasi ya libala, » pamba te Yawe akozwa esengo kati na yo, mpe mabele na yo ekozwa mobali ya libala.


Nakopesa bango motema oyo ekoyeba Ngai, mpo ete basosola ete nazali Yawe. Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango, pamba te bakozongela Ngai na motema na bango mobimba.


Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ! Oh Isalaele, kozala na somo te, › elobi Yawe. ‹ Solo, nakobikisa yo wuta na mokili ya mosika, mpe bakitani na yo, wuta na mokili ya bowumbu ! Jakobi akozwa lisusu kimia mpe bopemi, mpe moto moko te akobangisa ye lisusu.


Nakosepela kosalela bango bolamu mpe nakolona bango penza kati na mokili oyo, na motema mpe na molimo na Ngai mobimba. ›


« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bakatama ngenga kaka na nzoto, kasi na mitema te :


Ngai nakosala boyokani na Ngai elongo na yo ; mpe na bongo, okososola solo ete Ngai, nazali Yawe,


Sima na mikolo, tango nalekelaki lisusu wana mpe namonaki yo, nasosolaki ete okokisi mibu ya libala. Nakamataki elamba na Ngai mpe nazipaki bolumbu na yo ; nalapaki ndayi ete nakosala boyokani ya libela elongo na yo, elobi Nkolo Yawe. Mpe na bongo, okomaki ya Ngai.


Nakosala boyokani ya kimia elongo na bibwele na Ngai, nakolongola banyama mabe kati na mokili mpo ete bibwele na Ngai evanda na kimia kati na esobe mpe elala na bazamba.


Banzete ya bilanga ekobota bambuma, mpe mabele ekobota biloko ebele. Bato na Ngai bakozala na kimia na mabele na bango ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakobuka banzete ya ekangiseli na bango mpe nakokangola bango na maboko ya bato oyo banyokolaka bango.


Na nzela wana, nakomonisa monene mpe bosantu na Ngai, mpe nakosala ete bato ya bikolo ebele bayeba Ngai ; boye bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›


« Nzokande Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na Ejipito. Oyebi Nzambe mosusu te libanda na Ngai, ozali na mobikisi mosusu te.


Nakolongola na bibebu na ye bakombo ya banzambe ya Bala ; bakobelela lisusu bakombo na yango te.


Pamba te nasepelaka na boboto koleka mbeka, mpe na boyebi ya Nzambe koleka mbeka ya kotumba.


Mosala ya kobeta ble ekowumela kino na tango ya kobuka, mpe tango ya kobuka ekowumela kino na tango ya kolona ; bokolia na kotonda mpe bokovanda na kimia kati na mokili na bino.


Nakotia kimia kati na mokili, bokolala pongi, mpe moto moko te akotungisa bino ; nakolongola banyama oyo ebomaka kati na mokili mpe bitumba ekozala lisusu te kati na mokili na bino.


Akozala Mosambisi kati na bikolo ebele, akokata makambo ya kowelana kati na mabota ya nguya, ezala oyo ezalaka mosika. Bakotumba mipanga na bango na moto mpo na kosala bakongo, mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli. Ekolo moko te ekotombola lisusu mopanga mpo na kobundisa ekolo mosusu, bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba.


Nakolongola bashar ya bitumba na mokili ya Efrayimi, bampunda ya bitumba, na engumba Yelusalemi, mpe matolotolo ya bitumba ekobukana. Mokonzi yango akosakola kimia na bikolo nyonso, bokonzi na ye ekobanda longwa na ebale monene moko kino na mosusu, longwa na ebale kino na basuka ya mabele.


Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.


Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi soki Mwana azali nani, longola kaka Tata ; mpe moko te ayebi soki Tata azali nani, longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.


Nzokande, bomoi ya seko ezali : koyeba Yo oyo ozali Nzambe moko kaka ya solo, mpe koyeba Yesu-Klisto oyo otindaki.


Solo, bino, boyebi Ye te ; kasi Ngai, nayebi Ye. Soki nameki koloba ete nayebi Ye te, wana nakozala mokosi lokola bino. Kasi nayebi Ye mpe nabatelaka Liloba na Ye.


Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.


Kaka yango te, nazali kutu komona makambo nyonso lokola eloko pamba likolo ya bolamu oyo eleki monene : koyeba Yesu-Klisto, Nkolo na ngai. Ezali mpo na Ye nde ngai nandimaki kobungisa makambo wana nyonso mpe nazali komona yango lokola bisanza, mpo ete nakoka kozwa Klisto


mpo ete bozala na bizaleli oyo ebongi liboso ya Nkolo, mpo ete bosepelisa Ye na nyonso, mpo ete bobota bambuma na nzela ya lolenge nyonso ya misala na bino ya malamu, mpo ete bokola kati na boyebi ya Nzambe,


Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi oyo. Kasi atako bongo, nazali koyoka soni te, pamba te nayebi nani oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki ya kobatela nyonso oyo apesa ngai, kino na mokolo wana.


Moko te akoteya lisusu moninga to ndeko na ye na koloba : Yeba Nkolo ! Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo,


Biso, tozali ya Nzambe ; mpe moto nyonso oyo ayebi Nzambe ayokaka biso. Kasi moto oyo azali ya Nzambe te ayokaka biso te. Ezali ndenge wana nde toyebaka Molimo ya solo mpe molimo ya libunga.


Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ