Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 2:2 - Mokanda na Bomoi

2 Bongo, bato ya Yuda mpe ya Isalaele bakozonga lisusu kozala ekolo moko, bakopona mokonzi moko kaka mpe bakobima na mokili ya bowumbu, pamba te mokolo ya Jizireyeli ekozala mokolo monene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 2:2
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akotombola bendele mpo na bikolo mpe akosangisa bana ya Isalaele oyo bazali na bowumbu ; akosangisa esika moko bato ya Yuda oyo bapalangana na mokili mobimba.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Wapi mokanda ya koboma libala oyo Ngai nabenganelaki mama na bino ? To natekaki bino epai ya nani oyo Ngai nazalaki na niongo na ye ? Botekamaki mpo na masumu na bino ; mpe libala ya mama na bino ekufaki mpo na botomboki na bino.


« Ganga na mongongo makasi, kotika te ! Matisa mongongo na yo lokola kelelo, yebisa bato na Ngai botomboki na bango, mpe lakisa libota ya Jakobi masumu na ye.


Loba : « Bino bakonzi ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka Liloba na Yawe ! Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Boyoka ! Nakoyeisa pasi makasi na esika oyo ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango na yango, akozala na somo.


« Kende kotatola na matoyi ya Yelusalemi : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakanisi lisusu bolingo oyo ozalaki na yango epai na Ngai tango ozalaki elenge ; ozalaki kolinga Ngai makasi ndenge kaka mwasi mpe mobali balinganaka, mpe ozalaki kolanda Ngai na esobe, kati na mokili oyo ekawuka.


« Soki mobali abomi libala na mwasi na ye, mpe mwasi yango akei kobala mobali mosusu ; boni, mobali yango akoki lisusu kozongela ye ? Bomoni te ete mokili mobimba ekokoma penza mbindo ? Nzokande yo, osalaki kindumba na mibali ebele, bongo olingi sik’oyo kozongela Ngai, » elobi Yawe.


Ndima kaka mabe na yo, mpo ete otombokelaki Yawe, Nzambe na yo ; obebisaki ngolu na yo epai ya banzambe ya bapaya, na se ya banzete nyonso ya mibesu, mpe otosaki Ngai te, › » elobi Yawe.


Na tango wana, libota ya Yuda ekosangana elongo na libota ya Isalaele ; longwa na mokili ya nor, bakokende nzela moko kino na mokili oyo napesaki batata na bino lokola libula.


Okamataki lisusu bana basi mpe bana mibali oyo obotelaki Ngai, obonzaki bango lisusu lokola bilei epai ya banzambe wana ya bikeko mpo ete elia bango. Boni, kindumba na yo ekokaki kaka te ?


otongaki yango na bisika nyonso oyo babalabala ekutana, okomisaki kitoko na yo likambo ya nkele mpe omipesaki epai ya moleki nzela nyonso : osalaki penza kindumba makasi.


Boni, mwana na moto, okosambisa bango ? Okosambisa bango solo ? Tutanisa bango na misala ya mbindo ya batata na bango


Boye, namilobelaki na tina na mwana mwasi oyo anzulukaki nzoto mpo na kindumba : ‹ Boni, ezali kaka ye oyo anzuluki nzoto nde azali kozongela lisusu penza kindumba ! ›


Kasi bato ya sembo bakosambisa bango mpe bakokatela bango etumbu oyo bapesaka na basi oyo basalaka ekobo mpe basopaka makila, pamba te bazali bandumba mpe maboko na bango ezali na makila.


Tango Yawe abandaki koloba na nzela ya mosakoli Oze, Yawe ayebisaki ye : — Kende, linga mwasi oyo asalaka kindumba mpe bota na ye bana makangu, pamba te mokili emikotisi na kindumba mpe epesi Yawe mokongo.


Nzokande, bana ya Isalaele bakozala ebele lokola zelo ya ebale monene, oyo bakoki komeka to kotanga te ; kaka na esika oyo balobaki na bango : « Bozali bato na ngai te, » bakokoma kobenga bango « bana na Nzambe na bomoi. »


Soki te, nakolongola ye bilamba mpe nakotika ye bolumbu ndenge babotela ye, nakokomisa ye lokola esobe, lokola mokili oyo ekawuka ; mpe akokufa na posa ya mayi.


Bokobeta mabaku, na moyi makasi ; basakoli mpe bakobeta mabaku elongo na bino, na butu, mpe nakobebisa mama na bino.


Moto oyo apasolaka nzela akotambola liboso na bango. Bakolekela na nzela oyo bapasoli, bakolekela na nzela ya ekuke mpe bakobimela na nzela yango. Mokonzi na bango akotambola liboso na bango, Yawe akozala liboso na bango.


Boye, kobanda sik’oyo, tokotala lisusu moto moko te na ndenge ya bomoto. Atako, na kala, totalaki Klisto na ndenge ya bomoto, kasi sik’oyo tozali lisusu kotala Ye bongo te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ