Oze 2:18 - Mokanda na Bomoi18 Na mokolo wana, elobi Yawe, okobenga ngai : « Mobali na ngai ya libala ; » okobenga ngai lisusu te : « Nkolo na ngai. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Na mokolo wana, makolo na Ye ekotelema likolo ya ngomba ya banzete ya olive oyo ezali na ngambo ya este ya Yelusalemi ; mpe ngomba ya olive ekokabwana na biteni mibale : eteni moko na ngambo ya este mpe eteni mosusu na ngambo ya weste. Lubwaku moko ya monene ekosalema : eteni moko ya ngomba ekokende na ngambo ya nor, mpe eteni mosusu, na ngambo ya sude.