17 Kuna nde nakozongisela ye bilanga na ye ya vino mpe nakokomisa Lubwaku ya Akori ekuke ya elikya. Kuna, akoyanola na esengo lokola na tango ya bolenge na ye, lokola na mokolo oyo abimaki na Ejipito.
Bato oyo bapotaka mbangu mpo na koluka bolamu epai ya banzambe mosusu bakomona pasi mingi. Nakosopa te mbeka na bango ya makila epai ya banzambe ya lolenge wana mpe nakotanga bakombo na yango te na bibebu na ngai.
Moyize mpe bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo mpo na lokumu ya Yawe : Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, mpo ete amonisi monene ya nkembo na Ye ! Azindisi mpunda mpe motambolisi na yango kati na ebale monene.
Na mokolo wana, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, nakosala ete bakombo ya banzambe ya bikeko elimwa na mokili ; boye bakotikala kokanisa yango lisusu te. Nakolongola lisusu kati na mokili basakoli mpe molimo ya mbindo.
Bosala boyokani te elongo na bikolo mosusu oyo etikali kati na bino, bobelela bakombo ya banzambe na yango te to mpe bolapa ndayi na bakombo na yango te. Bomeka kosalela yango te mpe bofukamela yango te.
Babwakaki na likolo ya Akana liboke ya mabanga ebele oyo ezali kino na mokolo ya lelo, mpe kanda ya Yawe esilaki. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Lubwaku ya Akori.