Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 2:16 - Mokanda na Bomoi

16 Yango wana, nakobuka ye motema, nakomema ye na esobe ; mpe kuna, nakoloba na motema na ye maloba na bolingo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 2:16
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Motema na ye emipesaki mobimba epai ya Dina, mwana mwasi ya Jakobi, alingaki ye mpe akomaki koloba na ye maloba ya bolingo.


Boloba kati na Yelusalemi, boyebisa ye ete minyoko na ye ekomi na suka, masumu na ye esili kolimbisama, pamba te asili kozwa na loboko ya Yawe ngolu koleka mbala mibale mpo na masumu na ye nyonso.


pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo ; babengaka Ye : Nzambe ya mokili mobimba.


« Bozonga epai na Ngai, bino batomboki, » elobi Yawe, « pamba te nazali mobali na bino ya libala. Kati na bino, nakozwa moto moko kati na engumba moko na moko, mpe bato mibale kati na etuka moko na moko, mpo na kozongisa bino na Siona.


Nakomema bino na esobe ya bikolo, mpe kuna, tokotalana na miso mpe nakopesa bino etumbu.


Mama na bango atambolaki na kindumba, mpe ye oyo abotaki bango azali mwasi ya lokumu te. Alobaki : « Nakolanda bamakangu na ngai, oyo bapesaka ngai bilei mpe mayi, bilamba ya lino mpe bilamba basala na bapwale ya meme, mafuta mpe masanga. »


Mwasi ya libala azali ya mobali oyo abali ye ; mpe moninga ya mobali oyo asili kobala, ezali moto oyo atelemi pembeni na ye mpe azali na esengo makasi tango azali koyoka mongongo na ye. Ezali mpe bongo mpo na ngai : esengo na ngai ezali sik’oyo ya kokoka.


Mpo na bino, natondi na zuwa kowuta na Nzambe. Nabalisaki bino na mobali moko kaka, Ye nde Klisto, lokola elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali peto.


Tika ete tosepela, totonda na esengo mpe topesa Ye nkembo ! Pamba te tango ya feti ya libala ya Mpate ekoki. Mwasi mobandami na Ye ya libala asili komibongisa.


mobali na ye ayaki epai na ye mpo na kobondela ye ete azonga na libala. Mobali ayaki elongo na mosali na ye mpe amemaki ba-ane mibale. Mwasi yango akotisaki mobali na ye kati na ndako ya tata na ye ; mpe tango tata na ye amonaki mobali yango, asepelaki koyamba ye.


Rite alobaki : — Tika ete nakoba kozwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai. Obondisi motema na ngai, osololi na mwasi mosali na yo na boboto nyonso. Nzokande, nakokani te ata na moko ya basali na yo ya basi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ