Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 2:13 - Mokanda na Bomoi

13 Nakosukisa bisengo na ye nyonso : bafeti na ye ya mobu na mobu mpe ya ebandeli ya sanza, mikolo na ye ya Saba mpe bafeti nyonso oyo ekatama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 2:13
44 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi Akazia akweyaki na Samari wuta na lininisa ya shambre na ye ya likolo mpe azokaki pota moko ya makasi. Atindaki bantoma na ye mpe alobaki na bango : — Bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni, mpo na koyeba soki nakobika solo na likama oyo.


Ezali bongo nde Jewu asukisaki losambo ya Bala kati na Isalaele.


Atongaki lisusu bisambelo ya likolo ya bangomba oyo Ezekiasi, tata na ye, abukaki ; atongaki mpe bitumbelo mpo na nzambe Bala mpe atelemisaki likonzi mpo na nzambe mwasi Ashera, ndenge Akabi, mokonzi ya Isalaele, asalaki ; afukamelaki mpe agumbamelaki mampinga nyonso ya likolo.


Ndenge wana nde ezalaka, bomoi ya bato nyonso oyo babosanaka Nzambe ; boye, elikya ya bato mabe ebebaka.


Kasi babosanaki noki misala na Ye, bazelaki te kokokisama ya mabongisi na Ye.


Babosanaki Nzambe, Mobikisi na bango, oyo asalaki makambo minene kati na Ejipito,


babosanaki bikamwa na Ye mpe makambo minene oyo atalisaki bango.


Sik’oyo, kende ! Kamba bato na esika oyo nalobaki na yo. Tala, anjelu na Ngai akozala liboso na yo. Atako bongo, tango mokolo ekokoka mpo ete napesa etumbu, nakopesa bango etumbu mpo na lisumu na bango.


Mpo ete obosani Nzambe, Mobikisi na yo, oboyi kokanisa Libanga oyo azali Ekimelo na yo, okolisi banzete ya kitoko mpe oloni banzete ya vino ya bapaya.


Ezala mpo na masumu na bino to mpo na masumu ya batata na bino, » elobi Yawe, « pamba te babonzaki malasi ya ansa na likolo ya bangomba milayi mpe basambwisaki Ngai na likolo ya bangomba mikuse ; solo penza, nakozongisela bango mabe, nakofuta bango kolanda misala na bango oyo eleka ! »


Oh Yuda, ozali na banzambe ebele ndenge ezali motango ya bingumba na yo ; mpe lisusu, bitumbelo oyo otongaki mpo na kotumbela nzambe Bala, nzambe ya soni, malasi ya ansa ezali ebele ndenge ezali motango ya babalabala ya Yelusalemi. »


Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai, bazali kotumba malasi ya ansa mpo na banzambe ya bikeko oyo ezanga tina, oyo ebetisaka bango mabaku na nzela mpe epengwisaka bango na nzela ya kala, bongo ememaka bango na banzela mosusu oyo bafungola nanu te.


Boni, elenge mwasi abosanaka penza biloko na ye ya monzele ? Boni, mobandami ya libala abosanaka solo mayaka na ye ? Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai mikolo ebele.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na babateli bibwele oyo bazali kobatela bato na Ngai : « Lokola bosili kopanza bibwele na Ngai, bobungisi bango nzela mpe bobateli bango malamu te, nakopesa bino etumbu mpo na mabe oyo bosili kosala, » elobi Yawe,


Kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, nakosilisa koganga ya esengo mpe ya kosepela, mongongo ya mobali ya libala mpe ya mwasi ya libala, pamba te mokili ekobeba.


Bozali koyiba, koboma bato, kosala ekobo, kolapa bandayi ya lokuta, kotumba malasi ya ansa mpo na Bala mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te ;


Nzela oyo ekenda kino na Siona ezali na matanga, pamba te bato bazali koya lisusu na bafeti te. Bikuke na ye nyonso etikali lisusu na bato te, Banganga-Nzambe na ye bazali kolela, bana na ye ya basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te bazali na mawa ; bongo ye moko akomi na pasi makasi kati na motema.


Bakambi batika kokende na ekuke ya engumba, mpe bilenge batika kobeta mindule.


Nalatisaki yo lopete na zolo, biloko ya matoyi mpe motole ya kitoko na moto.


Okamataki lisusu babiju ya kitoko oyo basala na wolo mpe na palata oyo napesaki yo, osalelaki yango bikeko ya mibali ; mpe elongo na yango, omipesaki na kindumba.


Na mboka na yo, bato bazwaka kanyaka mpo na kosopa makila, badefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, banyokolaka baninga mpo na kokoma na bomengo mpe bobosani Ngai, elobi Nkolo Yawe.


Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola obosanaki Ngai mpe otiaki Ngai na sima ya mokongo na yo, okomema mikumba ya ekobo mpe ya kindumba na yo. »


Kasi tango nyonso bazalaki kobenga ye, tango nyonso mpe azalaki kokima mosika na Ngai. Bazalaki kobonzela banzambe ya Bala mbeka mpe kotumbela bikeko malasi ya ansa.


Tango Efrayimi azalaki koloba, bato bazalaki kolenga ; azalaki kokonza kati na Isalaele, kasi asalaki mabe na kosambela nzambe Bala ; yango wana akufaki.


Kasi sik’oyo, lokola bolie mpe botondi, bokomi lofundu mpe bobosani Ngai.


Soki te, nakolongola ye bilamba mpe nakotika ye bolumbu ndenge babotela ye, nakokomisa ye lokola esobe, lokola mokili oyo ekawuka ; mpe akokufa na posa ya mayi.


Mama na bango atambolaki na kindumba, mpe ye oyo abotaki bango azali mwasi ya lokumu te. Alobaki : « Nakolanda bamakangu na ngai, oyo bapesaka ngai bilei mpe mayi, bilamba ya lino mpe bilamba basala na bapwale ya meme, mafuta mpe masanga. »


kobonza bambeka na likolo ya bangomba milayi, kotumba ansa lokola mbeka ya malasi na likolo ya bangomba mikuse, na se ya banzete minene oyo epesaka pio ya kitoko lokola sheni, pepiliye mpe terebente ! Mpo na yango, bana na bino ya basi bakosala kindumba, mpe basi ya bana na bino bakosala ekobo.


Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.


Isalaele abosani Mokeli na ye mpe atongi bandako ya kitoko ; Yuda atongi bingumba ebele batonga makasi ; kasi Ngai nakotinda moto kati na bingumba na bango, mpe ekotumba bandako na bango ya kitoko. »


Mikolo ya etumbu ezali koya, mikolo ya kofuta masumu esili koya. Isalaele, yeba yango ! Mosakoli akomi zoba, moto ya Molimo abeli liboma ! Pamba te masumu na yo ekomi ebele penza, mpe mabe na yo ekomi mingi liboso na ngai.


Nakokomisa mikolo ya bafeti na bino mikolo ya matanga, banzembo na bino ya esengo banzembo ya mawa. Nakosala ete bino nyonso bolata basaki, mpe bakokokola bino suki ya moto. Nakoyeisa matanga kati na mokili lokola matanga ya libota oyo esili kokufisa mwana se moko oyo bazalaki na ye, mpe suka na yango ekozala bobele se pasi makasi.


Bobosanaki Libanga oyo ebotaki bino mpe bomonaki pamba Nzambe oyo apesaki bino bomoi.


keba ete obosana Yawe te oyo abimisaki yo na Ejipito, mokili ya bowumbu.


Bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe ; basalelaki banzambe Bala, Asitarite, mpe banzambe ya Siri, ya Sidoni, ya Moabi, ya Amoni mpe ya Filisitia. Basundolaki Yawe mpe basalelaki Ye lisusu te.


Bana ya Isalaele basalaki makambo mabe na miso ya Yawe ; babosanaki Yawe, Nzambe na bango, mpe basalelaki banzambe Bala mpe Ashera.


Kasi babosanaki Yawe, Nzambe na bango. Yango wana Ye Yawe akabaki bango na maboko ya Sisera, mokonzi ya basoda ya Atsori ; na maboko ya bato ya Filisitia mpe na maboko ya mokonzi ya Moabi oyo babundisaki bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ