Nzokande, bana mibali ya Atali, mwasi mabe, batobolaki madusu mpo na kokota kati na Tempelo ya Yawe mpe basalelaki ata bisalelo na yango nyonso ya bule mpo na losambo ya banzambe Bala.
Mpe soki omituni : « Mpo na nini makambo ya boye ekomeli ngai ? » Ezali mpo na ebele ya masumu na yo nde bapasolaki yo bilamba mpe bazokisaki nzoto na yo.
Okamataki bilamba na yo mosusu, otongaki yango mpo na kobongisa bisambelo na yo ya likolo ya bangomba, epai wapi osalaki kindumba na yo. Likambo ya bongo etikala nanu kosalema te mpe ekotikala kosalema lisusu te !
Bilei oyo Ngai nabongiselaki yo : farine ya ble, mafuta ya nzoyi mpe mafuta ya olive, oyo napesaki yo mpo ete oliaka, obonzaki yango epai ya bikeko wana lokola mbeka ya solo kitoko. Yango nde makambo oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe.
Bato yango bakoyina yo, bakosala yo mabe penza mpe bakobotola yo mbuma ya mosala na yo ; bakolongola yo bilamba mpe okotikala bolumbu, bongo soni ya kindumba na yo ekobima polele. Kindumba mpe ekobo na yo
Isalaele azalaki lokola nzete ya vino ya bitape ebele, azalaki kobota mbuma mpo na ye moko. Ndenge azalaki kobota mbuma ebele, ndenge wana mpe atongaki bitumbelo ebele ; ndenge mabele na ye ekomaki kitoko, ndenge wana mpe abongisaki mabanga na ye ya bule.
Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.