9 Efrayimi akoloba : « Banzambe ya bikeko ezali lisusu na tina nini epai na Ngai ? » Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye. Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu, Ngai nde nasalaka ete obota mbuma.
Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ?
bakotalela lisusu bitumbelo te oyo ezali misala ya maboko na bango, mpe miso na bango ekotala lisusu te misala ya misapi na bango : makonzi ya Ashera mpe bitumbelo ya malasi ya ansa.
Bozali koloba : ‹ Nzela ya Nkolo ezali sembo te. › Oh libota ya Isalaele, boyoka ! Boni, nzela na Ngai ezali sembo te ? Ezali banzela na bino te nde ezangi bosembo !
Kati na engumba yango, Yawe azali sembo, asalaka mabe te ; mokolo na mokolo, alakisaka bosembo na Ye mpe azangaka te kokokisa yango tongo na tongo. Nzokande, moto oyo atambolaka na bosembo te amonaka likambo ya soni te.
« Nakolendisa libota ya Yuda mpe nakobikisa libota ya Jozefi, nakozongisa bango lisusu na mokili na bango, pamba te nakoyokela bango mawa ; bakozala lokola bato oyo nasundolaki te, pamba te nazali Yawe, Nzambe na bango, mpe nakoyanola bango.
Simeoni apambolaki bango mpe alobaki na Mari, mama ya Yesu : — Yeba malamu ete Mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato ebele kati na Isalaele, mpe mpo na kozala elembo oyo ekomema tembe kati na bato.
Mpe soki nasalaki te, kati na bango, misala wana oyo moto ata moko te asalaki, balingaki te kozala na ngambo ya lisumu. Kasi sik’oyo, atako bamonaki misala yango, bazali kaka kokoba koyina biso : Ngai mpe Tata na Ngai.
Pilato atunaki : — Elingi koloba nini, ozali nde mokonzi ? Yesu azongisaki : — Yo nde olobi yango ete nazali mokonzi. Nabotamaki mpe nayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na tina na solo. Moto oyo azali kati na solo ayokaka mongongo na Ngai.
— Mwana ya Satana mpe monguna ya makambo nyonso ya sembo ! Otondi na lolenge nyonso ya lokuta mpe ya mayele mabe ! Kino tango nini okotika kobebisa mabongisi ya Nkolo, oyo ezali sembo ?
Yawe azali lokola Libanga ; misala na Ye ezali ya kokoka, mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo ; azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te ; azali sembo mpe alima.
Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa ! Mokonzi ya bikolo nyonso, banzela na Yo ezali sembo mpe solo.