nakolona kati na esobe : banzete ya sedele, ya akasia, ya mirite mpe banzete ya olive ; nakotia banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwi esika moko kati na mabele ya kokawuka,
Nzete ya sipele ekobota na esika ya banzube, nzete ya mirite ekobota na esika ya basende ; ekozala, mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, elembo ya libela na libela, oyo ekotikala kobebisama te. »
Nkembo ya Libani ekoya epai na yo, banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwisi ekoya elongo mpo na kobongisa Esika na Ngai ya bule ; mpe nakopesa lokumu na esika na Ngai, oyo natiaka makolo na Ngai.
Nakolona yango na likolo ya ngomba ya Isalaele oyo eleki molayi ; ekopanza bitape na yango mpe ekobota bambuma, ekokoma nzete ya sedele moko ya kitoko ; bandeke ya ndenge na ndenge ekotonga bazala na yango kuna mpe ekopema na se ya pio ya bitape na yango.
Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi ; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye.
pamba te bango moko bazali kotatola ndenge nini boyambaki biso mpe ndenge nini botikaki kosambela banzambe ya bikeko mpo na komipesa na Nzambe mpe mpo na kosalela Nzambe na bomoi mpe ya solo,