Jakobi akendeki mpe apesaki ye beze. Tango Izaki ayokaki solo ya bilamba na ye, apambolaki ye na maloba oyo : « Ah ! Solo ya mwana na ngai ezali lokola solo ya bilanga oyo Yawe apamboli.
Kati na ndako na yo, mwasi na yo azali lokola nzete ya vino oyo ebotaka bambuma ebele ; bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive zingazinga ya mesa na yo.
Ekobota fololo mingi penza mpe ekosepela, ekosepela mpe ekoganga na esengo. Nkembo ya Libani, lokumu ya Karimeli mpe ya Saroni ekopesamela yango ; boye bakomona nkembo ya Yawe, lokumu ya Nzambe na biso.
Tango bokomona yango, mitema na bino ekosepela mpe mikuwa na bino ekozwa makasi ya sika lokola matiti ya mobesu ; loboko na Yawe ekoyebana kati na bawumbu na Ye mpe kanda na Ye ekokitela banguna na Ye.
Yawe azalaki kobenga yo « Nzete ya olive ya mobesu oyo etonda na mbuma kitoko. » Kasi Yawe akotumba yango na makelele ya mopepe makasi, mpe bitape na yango ekobukana-bukana.