azali lokola pole ya tongo, tango moyi ebimaka mpe engalaka makasi lokola nde mapata ezali te, lokola kongenga ya sima na mvula oyo ebimisaka matiti na mokili. ›
Tika ete ble etonda kati na mokili, mbuma na yango ebota ebele na likolo ya bangomba lokola Libani ! Wuta na engumba, bato bakozala na bofuluki lokola matiti ya elanga.
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na ngai : « Nakovanda kimia mpe nakotala wuta na ndako na Ngai, lokola kongala ya moyi to lokola mapata na tango ya molunge. »
Kasi bato na Yo, oyo bakufa bakozonga lisusu na bomoi, bibembe na bango ekosekwa. Bino bato oyo bovandaka kati na putulu, bolamuka mpe boganga na esengo ! Pamba te mamwe na Yo ezali lokola mamwe ya tongo ; mabele ekopesa bomoi epai ya bakufi.
Ekobota fololo mingi penza mpe ekosepela, ekosepela mpe ekoganga na esengo. Nkembo ya Libani, lokumu ya Karimeli mpe ya Saroni ekopesamela yango ; boye bakomona nkembo ya Yawe, lokumu ya Nzambe na biso.
Pamba te nakosopa mayi na mokili ya kokawuka, mpe bibale, na mabele ya kokawuka ; nakosopa Molimo na Ngai na likolo ya bana na yo mpe mapamboli na Ngai na likolo ya bakitani na yo.
Nakotia masanzoli na bibebu ya bato oyo bazali kolela na Isalaele. Kimia, kimia ezala epai na ye oyo azali mosika, mpe epai na ye oyo azali pene, » elobi Yawe. « Mpe nakobikisa bango. »
« Bino batomboki, bozonga epai na Ngai mpe nakobikisa bino na kopengwa na bino ! » « Solo, tokozonga epai na Yo, pamba te Yo, Yawe, nde ozali Nzambe na biso.
Batikali ya Jakobi bakozala kati na mabota, na kati-kati ya bikolo ebele, lokola nkosi kati na banyama ya zamba, lokola mwana nkosi kati na etonga ya bameme : tango elekaka kati na etonga ya bameme, ekangaka mpe epasolaka yango, mpe moto oyo akoki kokangola yango azalaka te.
Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo ? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.
Botala ndenge bafololo ya lisi ekolaka ! Esalaka te, etongaka bilamba te ; nzokande, nazali koloba na bino, ezala ye moko mokonzi Salomo, kati na nkembo na ye nyonso, atikalaki kolata te lokola moko kati na yango.
Tika ete mateya na ngai ekweya lokola mvula, mpe maloba na ngai ekita lokola londende, lokola mvula moke na likolo ya matiti, lokola mvula makasi na likolo ya milona !