Oze 14:3 - Mokanda na Bomoi3 Bobongisa maloba na bino mpe bozonga epai na Yawe ; boloba na Ye : « Limbisa mabe na biso nyonso, yamba biso na mawa na Yo mpo ete tobonzela yo maloba ya bibebu na biso, na esika ya bangombe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bakomikomisa lisusu mbindo te na nzela ya banzambe na bango ya bikeko mpe ya bililingi na bango ya mabe to na nzela ya misala na bango ya mabe ; pamba te nakobikisa bango wuta na bisika oyo bazalaki kovanda epai wapi basalaki masumu mpe nakopetola bango ; bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango.
Sik’oyo, bazali kokoba kosala masumu ; na mayele na bango, bazali komisalela banzambe ya bikeko na nzela ya palata na bango balekisa na moto, bililingi oyo babongisa malamu : nyonso wana ezali mosala ya bato ya misala ya maboko. Balobaka na tina na bango : « Babonzaka bato lokola bambeka mpe bapesaka beze na bana ngombe ya mibali. »