Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 14:1 - Mokanda na Bomoi

1 Bato ya Samari basengeli kozwa etumbu mpo na mabe na bango, pamba te batombokeli Nzambe na bango. Bato bakokufa na mopanga ; bakonyata-nyata babebe na bango, bakopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 14:1
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azaeli atunaki : — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolela ? Elize azongisaki : — Mpo ete nayebi mabe oyo okosala bana ya Isalaele. Okozikisa bingumba na bango, oyo etongama makasi, okokata bilenge mibali na bango bakingo na mopanga, okoboma bana na bango ya mike, mpe okopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.


Kasi Yawe akobeta Ejipito na nzela ya bitumbu, akobeta yango mpe akobikisa yango. Bakozonga epai na Yawe, bongo akoyanola na kolela na bango mpe akobikisa bango.


Mabe na yo ekomemela yo etumbu, kotomboka na yo ekomemela yo pamela. Tala malamu mpe sosola ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo kosundola Yawe, Nzambe na yo, mpe kozanga kotosa Ngai, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.


« Oh Isalaele, soki okozonga, zonga epai na Ngai, » elobi Yawe, « soki olongoli banzambe na yo ya bikeko liboso na Ngai mpe otiki kotambola libanda ya nzela na Ngai ;


Mitole ekweyi wuta na mito na biso. Mawa na biso, mpo ete tosali masumu !


Kulutu na yo ya mwasi, ezali Samari oyo avandi na ngambo ya nor ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi ; leki na yo ya mwasi ezali Sodome oyo avandi na ngambo ya sude ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi.


Loba na bango : ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te ; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika ! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele ! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa ? ›


Soki nalobi na moto mabe : ‹ Okokufa solo ; › kasi atiki masumu na ye mpe akomi kosala makambo ya sembo mpe ya alima,


Bolona bosembo mpo na bino moko mpe bokobuka mbuma ya bolingo ya solo. Bomikatela bilanga ya sika, pamba te tango ya koluka Yawe ekoki kino tango akoya kosopela bino bosembo.


Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, Kombo na Ye ya lokumu ezali Yawe.


Bato ya Kanana basalelaka emekelo kilo ya lokuta, balingaka kaka kokosa.


Isalaele, obebisami ; pamba te Ngai kaka nde Mosungi na yo !


Banganga-Nzambe baliaka na sima ya masumu ya bato na Ngai mpe basepelaka ete bato basala kaka mabe.


Lolendo ya Isalaele ezali kofunda bango ; ezala bato ya Efrayimi to ya Isalaele bakokweya mpo na masumu na bango ; bato ya Yuda mpe bakokweya elongo na bango.


Boya, tozonga epai na Yawe ! Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso ; azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso.


Nazali komona Efrayimi lokola engumba Tiri oyo etongama na likolo ya mabele ya kitoko ; nzokande, Efrayimi akokaba bana na ye na mobomi.


Mikolo ya etumbu ezali koya, mikolo ya kofuta masumu esili koya. Isalaele, yeba yango ! Mosakoli akomi zoba, moto ya Molimo abeli liboma ! Pamba te masumu na yo ekomi ebele penza, mpe mabe na yo ekomi mingi liboso na ngai.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Amoni, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bapasolaki mabumu ya basi ya zemi ya Galadi mpo na koyeisa mokili na bango monene.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ