Kati na banzambe nyonso ya bikolo oyo, nani azalaki na makoki ya kokangola mokili na ye na maboko na ngai ? Bongo ndenge nini Yawe akoka solo kokangola Yelusalemi na maboko na ngai ? »
pamba te Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele, Mobikisi na yo. Nakabi Ejipito mpo na kofuta niongo ya lobiko na yo, Kushi mpe Seba na esika na yo.
Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na Ejipito ; nakosala ete ovanda lisusu na se ya bandako ya kapo lokola na mikolo ya bafeti na yo, oyo ekatama.
Efrayimi alobaka na lolendo nyonso : « Ngai nazali mozwi, nakomi na bozwi mingi. Na mosala na Ngai nyonso, bakotikala komona Ngai na mbeba ata moko te oyo bakoki kobenga lisumu. »
Nakopesa ye etumbu mpo na mikolo nyonso oyo atumbelaki nzambe ya Bala malasi ya ansa. Azalaki kolata babiju mpe mayaka ya talo mpo na kokende epai ya bamakangu na ye ; kasi ngai, abosanaki Ngai, elobi Yawe.
Na mokolo wana, nakosala boyokani mpo na bango elongo na banyama ya zamba, bandeke ya likolo, mpe bikelamu oyo etambolaka na libumu. Nakobuka tolotolo mpe mopanga, mpe nakosilisa bitumba : nyonso wana ekosila na mokili mpo ete bato nyonso bavanda na kimia.
Kasi ngai, na koyembaka nzembo ya matondi, nalingi kobanda kobonzelaka Yo bambeka mpe kokokisaka bilaka oyo nazali kopesa, pamba te lobiko ezali ya Yawe. »