Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 13:3 - Mokanda na Bomoi

3 Mpo na yango, bakozala lokola lipata ya tongo, lokola londende ya tongo oyo elimwaka, lokola lititi oyo mopepe ememaka mosika na esika oyo batutelaka ble, mpe lokola molinga oyo ebimaka na lidusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 13:3
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo nini mopepe makasi ekomema bango lokola makasa to matiti ya kokawuka ?


Somo elati ngai, lokumu na ngai ekeyi lokola mopepe, bomengo na ngai elimwe lokola lipata.


Kasi ezali bongo te mpo na bato mabe ! Bazali lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe epanzaka.


Soki Nzambe atelemi, banguna na Ye bapalanganaka, mpe bayini na Ye bakimaka mosika na Ye.


Ata bato ya bikolo bazali koganga lokola makelele ya mayi ya bibale minene, bakimaka penza mosika tango Yawe apamelaka bango ; bakimaka lokola matiti na bangomba na tango ya mopepe, lokola putulu na tango ya mopepe makasi.


Mbala moko, ezala ebende to mabele oyo basalelaka bikeko to bronze to palata to mpe wolo, nyonso epanzanaki, ekomaki mike-mike mpe ekomaki kopumbwa ndenge matiti ya ble epumbwaka tango bapupolaka yango ; mopepe ememaki yango mpe elimwisaki yango. Kasi libanga oyo ekweyelaki ekeko yango ekomaki ngomba moko ya monene oyo etondisaki mokili mobimba. › »


Efrayimi, nasala yo lisusu nini ? Yuda, nasala yo lisusu nini ? Bolingo na bino mpo na Ngai ezali lokola londende ya tongo, lokola mamwe oyo elimwaka noki.


liboso ete mokolo oyo ekatama mpo na kosambisama ekoka, liboso ete mokolo yango eleka lokola matiti ya loso oyo mopepe ememi, mpe liboso ete kanda mpe kotomboka ya Yawe ekomela bino !


« Solo, milona ekokola malamu, bilanga ya vino ekobota bambuma na yango, mabele ekobimisa biloko ebele, mpe likolo ekonokisa mvula. Nakopesa biloko oyo nyonso lokola libula epai ya batikali kati na bato oyo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ