13 Pasi ekomeli ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ; kasi mpo ete azali lokola mwana azanga mayele, soki tango ya kobotama ekoki, abimaka na libumu ya mama na ye te.
Balobaki na ye : — Tala makambo oyo Ezekiasi alobi : « Mokolo ya lelo ezali mokolo ya pasi, mokolo ya etumbu mpe mokolo ya soni, pamba te tokomi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota kasi azangi makasi ya kobimisa mwana.
Somo makasi ekokweyela bango, pasi mpe kobanga ekotika bango te ; bakobunda-bunda lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Bango na bango bakotalana na kokamwa mpe bilongi na bango ekokoma lokola moto.
Balobaki na ye : « Tala makambo oyo Ezekiasi alobi : ‹ Mokolo ya lelo ezali mokolo ya pasi, mokolo ya etumbu mpe mokolo ya soni, pamba te tokomi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota kasi azangi makasi ya kobimisa mwana.
Nakoki solo koyeisa pasi ya kobota mpe kozanga makoki ya kobotisa ? » Elobi Yawe. « Nakoki solo kokanga mabota soki nazali kopesa mabota ? » elobi Nzambe na yo.
Yo oyo ovandaka na Libani, yo oyo otongaki zala na yo kati na bandako ya sedele, yeba ete okolela tango pasi ekokomela yo, pasi oyo ekokani na pasi ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota !
Botuna mpe botala : Boni, mobali akoki kobota bana ? Bongo mpo na nini nazali komona moto nyonso ya makasi asimbi libumu na ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota mpe elongi na ye ekomi mawa-mawa ?
Nayoki makelele lokola koganga ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota, kolela ya pasi lokola mwasi oyo azali kobota mwana na ye ya liboso : ezali makelele ya kolela ya Siona, mboka kitoko ; azali kolela, maboko likolo, mpe azali koloba : « Nabebi na ngai, nakomi na suka liboso ya babomi. »
Misala na bango ezali kopekisa bango kozonga epai ya Nzambe na bango, mpo ete molimo ya kindumba evandi kati na mitema na bango, bazali koyeba Yawe te.
Na tango ya kobota, mwasi ayokaka pasi makasi, pamba te eleko ya kobimisa mwana wuta kati na libumu na ye ekoki ; kasi soki kaka aboti, abosanaka pasi nyonso oyo amonaki, mpo na esengo oyo atondaka na yango mpo ete aboti moto.
pamba te anjelu moko na Nkolo azalaki koya tango na tango na liziba yango mpo na koningisa mayi. Soki mayi eningani, moto oyo azalaki kokita moto ya liboso kati na liziba azalaki kobika ata soki pasi na ye ezali ndenge nini.]
Kasi, wana Polo akomaki koloba na tina na bosembo, komikanga mpe kosambisama oyo ezali koya, Felikisi ayokaki somo mpe alobaki na ye : — Ekoki mpo na sik’oyo ! Okoki kolongwa. Soki nazwi lisusu tango, nakobengisa yo.
pamba te Nzambe alobi : « Na tango ya malamu, nayanolaki yo ; mpe na mokolo ya lobiko, nasungaki yo. » Nzokande, tango ya malamu ezali nde sik’oyo ; mokolo ya lobiko ezali nde lelo.
Boni, ezali ndenge wana nde bofuti Yawe ? Oh bato ya maboma, bato bazanga bwanya ! Boni, Yawe azali Tata na bino te ? Azali Mokeli na bino te ? Ye nde asalaki bino mpe abongisaki bino.
Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.