12 Mabe ya Efrayimi ebombami, mpe masumu na ye ekomami penza.
Mabe na ngai ekokangama kati na saki, mpe okozipa masumu na ngai.
Balobaka : ‹ Nzambe apesaka etumbu ya moto mabe epai ya bana na ye. › Tika ete apesa etumbu yango epai na ye moko moto mabe, mpo ete ayeba yango !
Ata soki omisukoli na kisi oyo basalelaka sabuni to omipakoli sabuni ndenge nini, masumu na yo ekolongwa te liboso na Ngai, » elobi Nkolo Yawe.
Kasi mpo na moto makasi na yo mpe motema libanga na yo, ozali yo moko komibendela etumbu monene mpo na mokolo oyo Nzambe akokweyisa kanda na Ye mpe akomonisa kosambisama na Ye ya sembo.