Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 13:11 - Mokanda na Bomoi

11 Boye, na kanda na Ngai, napesaki bino mokonzi, mpe na kotomboka na Ngai, nakolongola ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 13:11
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki kotomboka ezali kati na mokili, bakonzi bakomaka ebele ; kasi moto ya mayele mpe ya bososoli ayeisaka kimia.


Boye bakoloba : « Tozali na mokonzi te, pamba te totosaki Yawe te. Ata tozalaki na mokonzi, akokaki kosala nini mpo na biso ? »


Mokili ya Samari mpe mokonzi na yango bakotiola likolo ya mayi lokola mwa eteni ya nzete ya kokawuka.


Solo, bana ya Isalaele bakowumela tango molayi bazanga mokonzi, bazanga mokambi, bazanga mbeka, bazanga libanga ya ekaniseli, bazanga efode mpe bazanga banzambe ya bikeko.


Batunaki Ngai te tango batiaki bakonzi mpe baponaki bakambi. Bamisalelaki banzambe ya bikeko na palata mpe na wolo na bango mpo na libebi na bango moko.


Samuele abengisaki, na Mitsipa, bato ya Isalaele liboso ya Yawe


Kasi, na mokolo ya lelo, bobwaki Nzambe na bino, oyo abikisaka bino na pasi na bino nyonso mpe na minyoko na bino. Mpe bolobi na Ye : ‹ Ponela biso mokonzi oyo akokamba biso ! › Lokola ezali bongo, botelema sik’oyo bino moko liboso ya Yawe kolanda bikolo mpe bituka na bino. »


Samuele alobaki na bato nyonso ya Isalaele : — Napesi nyonso oyo bolobaki na ngai : natieli bino mokonzi.


Sik’oyo, botala mokonzi oyo boponaki, mokonzi oyo bosengaki. Ezali Yawe nde atie ye mokonzi mpo na kokamba bino.


Kasi Samuele alobaki na Saulo : — Nakozonga elongo na yo te ; pamba te lokola obwakaki Liloba na Yawe, Yawe mpe abwaki yo mpe ozali lisusu mokonzi ya Isalaele te.


Yawe alobaki na Samuele : — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo ? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ