Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala : moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.
Pamba te moto ya Siri ezali Damasi, mpe moto ya Damasi ezali na yango kaka Retsini. Etikali kaka mibu tuku motoba na mitano, Efrayimi ekobebisama mpe ekozala lisusu na molongo ya mabota te.
Batunaki Ngai te tango batiaki bakonzi mpe baponaki bakambi. Bamisalelaki banzambe ya bikeko na palata mpe na wolo na bango mpo na libebi na bango moko.
Yango wana, ndenge lisumu ekotaki na mokili na nzela ya moto moko, mpe kufa na nzela ya lisumu, ndenge wana mpe kufa ekangaki bato nyonso na nzela ya lisumu, pamba te bato nyonso basalaki masumu.
Solo, bolingo ya Klisto ekangi biso, pamba te tondimisamaki ete moko kaka akufa mpo na bato nyonso ; boye elingi koloba ete bato nyonso bakufa kati na ye.
Yawe alobaki na Jozue : — Lelo, nakobanda kotombola yo na miso ya bana nyonso ya Isalaele mpo ete bayeba ete nazali mpe elongo na yo ndenge nazalaki elongo na Moyize.
Bato ya Efrayimi basanganaki, bakatisaki na ngambo ya Tsafoni mpe balobaki na Jefite : — Mpo na nini okatisaki mondelo ya bato ya Amoni mpo na kobundisa bango, bongo obengaki biso te mpo ete tokende na yo elongo ? Tokotumba yo elongo na ndako na yo !
Mibali ya Efrayimi batunaki Jedeon : — Bizaleli ya boye elakisi nini epai na biso ? Mpo na nini obengaki biso te tango okendeki kobundisa bato ya Madiani ? Mpe basilikelaki ye makasi.
Samuele alobaki : — Atako ozalaki komimona moto pamba na miso na yo moko, kasi boni, okomaki te mokonzi ya bikolo ya Isalaele ? Yawe apakolaki yo mafuta mpo ete ozala mokonzi ya Isalaele.