Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 12:7 - Mokanda na Bomoi

7 Kasi yo, osengeli kozonga epai ya Nzambe na yo ; batela bolingo mpe bosembo mpe tia tango nyonso elikya na Nzambe na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 12:7
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, nazali na elikya ete okobikisa ngai !


Bimekelo kilo ya lokuta ezali lokola makambo ya nkele na miso ya Yawe, kasi kilo ya sembo ezali elengi na miso na Ye.


Emekelo kilo ya sembo mpe basani oyo bamekelaka kilo ezali ya Yawe, mpe kilo nyonso ya saki ezali likambo na Ye.


Bato bakokoma konyokolana bango na bango : moko akonyokola mosusu, mpe moninga akonyokola moninga na ye mosusu ; bilenge bakotosa mikolo te, bato pamba bakotelemela bato ya lokumu ;


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Botambola na alima mpe bosala kolanda bosembo, pamba te lobiko na Ngai ekomi pene mpe bosembo na Ngai ekomi pene ya komonisama.


Yebisa ye boye : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya Yelusalemi : Bokoko mpe mbotama na yo etalisaka ete ozali moto ya Kanana ; tata na yo azalaki moto ya Amori, mpe mama na yo azalaki moto ya Iti.


Bato ya mokili bazali koyiba mpe kobotola bato biloko na makasi, bazali konyokola mobola mpe moto oyo akelela, bazali komonisa mopaya pasi na nzela ya kopimela ye bosembo.


Lokola ozalaki mayele makasi na mosala ya mombongo, oyeisi bomengo na yo ebele makasi ; mpe mpo na bomengo na yo, motema na yo etondi na lolendo.


Isalaele, zongela Yawe, Nzambe na yo, pamba te ezali masumu na yo nde ekweyisaki yo.


« Ezala sik’oyo, » elobi Yawe, « bozonga epai na Ngai na mitema na bino mobimba, na kokila bilei, na mpinzoli mpe na kolela. »


Bazali konyata mito ya babola ndenge banyataka putulu ya mabele, mpe bazali kokata na bosembo te makambo ya bato bakelela. Tata mpe mwana na ye ya mobali bazali kosangisa nzoto na mwasi moko ya makangu ; mpe na bongo, bazali kotiola bosantu ya Kombo na Ngai.


Bosakola makambo oyo kati na bandako ya Asidodi mpe ya Ejipito : ‹ Bosangana na likolo ya bangomba ya Samari mpe botala ndenge nini mobulu mpe minyoko ezali kosalema kati na yango !


Bino bangombe ya basi ya Bashani, boyoka maloba oyo ; bozali lokola ngomba ya Samari, bino bato oyo bonyokolaka babola, bomonisaka bato bakelela pasi mpe bolobaka na mibali na bino : « Bomemela biso masanga mpo tomela. »


lokola bozali konyokola babola mpe kobotola bambuma na bango ya ble, bokovanda te na bandako oyo botongaki na mabanga bakata, bokomela te masanga ya vino ya bilanga kitoko ya vino oyo bolonaki.


Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe, oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango ! Bakokisaka yango na tongo, pamba te bazali na makoki ya kosala yango.


Bayengebene batikali lisusu te na mokili, moto ya sembo azali lisusu te ; bato nyonso bakomi kaka koluka nzela ya kosopa makila, mpe moto na moto azali kotiela ndeko na ye motambo.


Banzungu nyonso kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda ekobulisama mpo na Yawe, Mokonzi ya mampinga ; mpe bato nyonso oyo bakoya kopesa makabo bakozwa ndambo ya banzungu mpe bakolambela yango. Na mokolo wana, ata moto moko te ya mombongo akotikala kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Alobaki : — Mwasi wana azali elembo ya makambo mabe. Bongo azongisaki ye kati na sani, emekelo motuya ya biloko, mpe azipaki mofinuku na yango.


— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokataka makambo na bosembo, mpe tika ete moko na moko kati na bino azala na bolingo mpe na mawa ya moto mosusu.


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Alobaki na bato oyo bazalaki koteka bibenga : « Bolongola biloko oyo awa ! Ezali Ndako ya Tata na Ngai ! Ebandi ndenge nini bokomisa yango zando ? »


Bozali ata koboya kofuta basali bilanga na bino. Yoka ndenge bazali kolela ! Mpe kolela na bango ekomi kino na matoyi ya Nkolo, Mokonzi ya mampinga.


Natelemi lelo liboso na bino. Bofunda ngai liboso ya Yawe mpe liboso ya mopakolami na Ye. Nazwaki ngombe ya nani ? Nazwaki ane ya nani ? Nanyokolaki nani, mpe namonisaki nani pasi ? Nazwaki kanyaka na maboko ya nani mpo na kokanga miso na ngai ? Soki nasalaki likambo moko kati na makambo oyo nyonso, nakozongisa yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ