Telema ! Kende mbala moko na Padani-Arami, na ndako ya koko na yo, Betweli, tata ya mama na yo. Zwa mwasi kuna kati na bana basi ya Labani, ndeko ya mama na yo.
Moyize alobaki na bato : « Bokanisa mokolo oyo bobimaki na Ejipito, mokolo oyo bobimaki na bowumbu, pamba te Yawe abimisaki bino na loboko na Ye ya nguya. Bokolia eloko moko te oyo ezali na levire.
Anjelu na Nzambe oyo azalaki kotambola liboso ya mampinga ya Isalaele azongaki sima na bango, mpe likonzi ya lipata elongwaki liboso na bango mpo ete etelema sima na bango.
Nakopesa ye etumbu mpo na mikolo nyonso oyo atumbelaki nzambe ya Bala malasi ya ansa. Azalaki kolata babiju mpe mayaka ya talo mpo na kokende epai ya bamakangu na ye ; kasi ngai, abosanaki Ngai, elobi Yawe.
Ezali te mpo ete nabimisaki bino na Ejipito to mpo ete nakangolaki bino na ndako ya bowumbu ? Boni, ezali te mpo ete natindelaki bino Moyize, Aron mpe Miriami mpo ete bakamba bino ?
Nasololaka na ye elongi na elongi, na polele penza kasi na masese te. Amonaka lolenge ya Yawe. Mpo na nini bozali na somo te ya kotonga Moyize, mosali na Ngai ?
Bongo okoloba liboso ya Yawe, Nzambe na yo : « Koko na ngai azalaki moto ya Arami oyo azalaki koyengayenga ; akendeki na Ejipito na bato moke, awumelaki kuna mpe akomaki ekolo monene, ekolo ya nguya mpe ya bato ebele.
Sima na Jakobi kokota na Ejipito, bakoko na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi. Mpe Yawe atindaki Moyize mpe Aron oyo babimisaki bango na Ejipito mpo na kovandisa bango na esika oyo.